“Lisungi na ntango ebongi”
1 Ezalaka mpenza likambo ya kobɔndisa na kozwa lisungi na ntango oyo tozali na yango mposa! (Ebe. 4:16) Na liyangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” tosepelaki wana tozwaki na ntango ebongi bisaleli mibale oyo bizali lisungi ya ntina mpo na biso.
2 Búku ya sika, Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, eyaki na ntango malamu. Ezali kolobela mingi makambo minei ya ntina mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo: (1) komipekisa, (2) kotosa ebongiseli ya bokonzi, (3) kosolola ya malamu mpe (4) bolingo. Batoli oyo epesami kati na búku Bolamu na libota ekosalisa mabota nyonso oyo mazali kosalela yango ete bázwa kimya ya Nzambe. Tómibombela ntango mpo na kotánga yango na likebi nyonso mpe mpo na koyekola yango na libota. Tómimesenisa malamu na makambo oyo mazali kati na yango mpo ete tózala pene na kosalela yango malamumalamu ntango tokolakisa yango mpo na mbala ya liboso epai na bato, na sanza ya Apríli.
3 Mwa búku ya sika, Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? eyei na ntango ebongi mpo na kopesa nzela ete mosala ya kozalisa bayekoli esalema na lombangu. Atako yango ebongisami mpenzampenza mpo na kosalisa bato oyo bazali na mikakatano mpo na kotánga, mikóló mingi oyo bayebi kotánga mpe bana bakozwa litomba na bandimbola ya pɛtɛɛ ya mateya ya moboko ya Biblia oyo mazali kati na yango. Mbala mosusu yango ekozala esaleli ya ntina mpo na kobanda boyekoli mpe kokóba boyekoli yango na búku Boyebi. Na ntembe te, mwa búku oyo ekosalisa bato mingi ete báyeba mapamboli mingi oyo bakoki kozwa soki bazali kosala oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso.
4 Davidi alobelaki malamu mayoki na biso wana alobaki ete ‘azangaki eloko moko te, ete molimo na ye ezalaki na nguya mpe ete kɔpɔ na ye etondaki mpenza.’ (Nz. 23:1, 3, 5) Tokosepela na kotika mikanda oyo mikolimbolaka Biblia epai na bato mingi oyo balingi mpenza koyeba Nzambe ya solo, Yehova, mpe kosalela ye.