Tósangana na mosala oyo mokozongelama soko moke te
1 Na bileko bikeseni kati na lisoló ya bato, Yehova akweisaki ekateli na ye likoló na banguna na ye. Nzokande, na ngɔlu na ye, abongisaki nzela moko ya lobiko mpo na bato ya motema sembo. (Nz. 103:13) Ezaleli na bango ezalaki na ntina mpo na oyo esengelaki kokómela bango.
2 Na ndakisa, liboso ya mpela, na mobu 2370 L.T.B., Noa azalaki “mosakoli na boyengebene.” Baoyo baboyaki koyoka likebisi ya Nzambe bakufaki. (2 Pet. 2:5; Ebe. 11:7) Liboso ya kobebisama ya Yelusaleme, na mobu 70 T.B., Yesu amonisaki polele oyo bato basengelaki kosala mpo na kobika na kobebisama oyo esengelaki kokwela engumba yango. Baoyo nyonso babwakaki nsango ya likebisi na ye bazwaki matomba mabe ya ezaleli na bango. (Luka 21:20 -24) Na boumeli ya lisoló ya bato, makebisi mpe bikateli ya Yehova ya lolenge wana esalemi mbala mingi.
3 Mosala ya kokebisa na eleko na biso: Esili koleka ntango molai, Yehova ayebisaki ete nkanda na ye ekokita likoló na ebongiseli mabe ya ntango oyo mpe bobele bato na komikitisa nde bakobika. (Sef. 2:2, 3; 3:8) Ntango oyo etikali mpo na kosakola likebisi yango ezali koleka mbangu mpenza! “Bolɔ́zi monene” ebelemi, mpe koyanganisama ya bato na komikitisa ezali kosalema. Ya solo, “bilanga . . . bisili kotela mpo na kobuka.” Na bongo, ezali na mosala moko te oyo mozali na ntina koleka mpe mosengeli kosalema na lombangu lokola oyo.—Mat. 24:14, 21, 22; Yoa. 4:35.
4 Lelo oyo, tosengeli kosakola likebisi yango epai na bazalani na biso, “bálinga koyoka to bálinga te.” Ezali mokumba Yehova apesi biso mpe tosengeli kosundola yango te. (Ezek. 2:4, 5, NW; Ezek. 3:17, 18) Na kosanganáká mobimba na mosala yango, tozali komonisa na lolenge ya polele bolingo mozindo na biso mpo na Yehova, komibanzabanza oyo tozali na yango mpo na bazalani na biso mpe kondima na biso ezangi kotɛngatɛnga epai na Mobikisi na biso, Yesu Klisto.
5 Ntango ya kozwa ekateli yango oyo: Na ntango ya kala, nsima wana Yehova akweisaki bikateli na ye, mabe mabimaki lisusu, mpamba te Satana mpe bademó na ye bazalaki ntango nyonso kosala mosala na bango. Nzokande, mbala oyo, ekozala lisusu bongo te. Bopusi ya Satana ekolongolama. Ntina ekozala lisusu te ya kopesa makebisi na mokili mobimba mpo na “bolɔ́zi monene” oyo ebelemi. (Emon. 7:14; Lom. 16:20) Tozali na libaku malamu ya kosangana na mosala oyo mokozongelama soko moke te. Oyo ezali ntango ya kosala oyo ekoki na biso kati na mosala yango.
6 Na kondimisama mpenza, ntoma Paulo alobi na ntina na mosala na ye ya kosakola ete: “Nazali pɛto na makila na bino nyonso.” (Mis. 20:26) Lokola azalaki na bopɔtu te ya kosakola likebisi, azalaki na mayoki ya komema ngambo te na ntina na nyongo ya makila. Mpo na nini? Mpamba te akokaki koloba na ntina na mosala na ye ete: “Mpo na boye nakosalaka mosala, nakobunaka.” (Kols. 1:29) Na bongo, tósangana na makoki na biso nyonso na mosala yango oyo mokozongelama soko moke te, mpe tokozwa bosepeli lolenge moko na Paulo!—2 Tim. 2:15.