Biyano na mituna na bino
◼ Mpo na nini tosengeli kopesa lapólo ya mosala ya kosakola sanza na sanza kozanga koumela?
Biso banso tozalaka na esengo ya koyeba matomba malamu oyo mazwamaka na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. (Talá Masese 25:25.) Misala 2:41 ezali komonisa ete na mokolo ya Pantekote, na nsima ya lisukúlu ya kafukafu oyo Petelo asalaki, “bato soko nkóto misato babakisami na bango.” Mwa moke nsima, motángo yango momataki kino “soko nkóto mitano.” (Mis. 4:4) Oyo nde esengo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango ntango bayokaki lapólo yango! Lelo oyo, tozalaka na mayoki motindo moko ntango tozwi balapólo ya kolendisa. Tozalaka na esengo mingi ya koyoka matomba malamu oyo bandeko na biso na mokili mobimba bazali kozwa na mosala ya kosakola nsango malamu.
Esɛngaka ntango mingi mpe milende mingi mpo na kobongisa balapólo ya lolenge wana, na yango, ezali na ntina mingi ete mosakoli mokomoko ya Bokonzi apesa mabɔkɔ na likambo yango. Tozali mpenza kososola ntina ya kopesa lapólo sanza na sanza kozanga koumela?
Bokóli ya mosala ndenge bayebisaka biso yango epesaka biso esengo mingi. Lisusu, balapólo epesaka nzela na la Société ete ayeba bokóli ya mosala ya kosakola na mokili mobimba. Bikateli bisengeli kokamatama na ntina na bisika oyo mposa ya lisungi ezali, liponi ya mikanda ya kobimisa mpe motángo na yango. Na lisangá mokomoko, bankulutu batalelaka balapólo ya mosala ya kosakola mpo na koyeba na makambo nini esengeli lisusu kosala malamu koleka. Balapólo ya malamu elendisaka biso mpe epusaka mokomoko kati na biso ete atalela mosala na ye ya kosakola mpo na koyeba epai wapi asengeli kosala milende mpo na kokóla.
Mosakoli nyonso asengeli koyeba mokumba azali na yango ya kopesa nokinoki lapólo na ye ya mosala ya kosakola sanza na sanza. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda nde basengeli kokundwela basakoli mokumba yango, mpamba te basalaka mpe milende ya kopesa lisungi epai na moko na moko na baoyo mbala mosusu bazali na mikakatano mpo na kosakola sanza na sanza. Bakoki kosala bokundoli na ntango ya boyekoli ya mokanda ya nsuka mpo na sanza, to mpe na ntango mosusu oyo ebongi. Soki likoki ezali te ya kopesa lapólo ya mosala ya kosakola na Ndako ya Bokonzi, motambwisi ya boyekoli ya mokanda akoki kokɔngɔla yango mpe kosɛnzɛla na boye ete epesama epai na mokomeli ya lisangá na ntango ebongi mpo ete akɔtisa yango na lapólo ya sanza ya lisangá, lapólo oyo etindamaka epai ya la Société.
Botosi na biso ya ngonga ebongi mpo na oyo etali kopesa na bosembo nyonso lapólo ya mosala na biso ya kosakola kozanga koumela ezali koyeisa pɛpɛlɛ mosala ya baoyo bapesameli mokumba ya kotalela bolamu na biso ya elimo.