Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/97 nk. 1-7
  • ‘Tómonisa botɔ́ndi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tómonisa botɔ́ndi’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • ‘Bópesaka matɔndi na makambo nyonso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Bómimonisa bato ya Botɔndi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Libondeli ya kopesa matɔndi
    Tóyembela Yehova na esengo
  • “Bómimonisa bato ya botɔndi”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 4/97 nk. 1-7

‘Tómonisa botɔ́ndi’

1 Ntango tozalaki bana, mingi kati na biso toyekolaki koloba “nalɔ́mbi yo” mpe “matɔ́ndi” ntango moto amoniseli biso boboto mpe ntango asaleli biso malamu. Paulo alendisi biso ete ‘tópesaka matɔ́ndi’ ntango nyonso, mpe tosengeli kozala na botɔ́ndi mingi mpenza epai na Yehova. (Kols. 3:15, 16) Kasi ndenge nini tokoki komonisa botɔ́ndi na biso epai na Mozalisi na biso Monene? Bantina nini mpenza tozali na yango mpo na komonisela ye botɔ́ndi?

2 Ntoma Paulo akomaki ete: “Matɔ́ndi epai na Nzambe oyo apesi biso elonga na nzela na Nkolo na biso Yesu Klisto!” (1 Kol. 15:57) Mbula na mbula, na eleko ya Ekaniseli, tozali komikundwela bolingo ezangi ndelo Nzambe mpe Klisto bamoniselaki biso na kopesáká lisiko oyo ezali kopesa biso nzela na kolikya na bomoi ya seko na mikolo mizali koya. (Yoa. 3:16) Mingi kati na biso tosili kokufela molingami moko, mpe tozali na botɔ́ndi mingi mpo na lisekwa oyo elakami na Yesu. Mitema na biso mitondi na botɔ́ndi ntango tozali komanyola likoló na elikya ya kobika na nsuka ya biloko ya ntango oyo, mpe kozanga ete tomona liwa. (Yoa. 11:25, 26) Ezali mpasi kozwa maloba ya komonisa botɔ́ndi na biso mpo na mapamboli kitoko oyo tokozwa epai na Yehova, kati na Paladiso oyo ezali koya. (Emon. 21:4) Bantina nini kitoko tokoki kozala na yango mpo na ‘komonisa botɔ́ndi’ epai na Nzambe?

3 Ndenge nini tokoki komonisa botɔ́ndi na biso epai ya Nzambe: Ebongi solo kozongisa matɔ́ndi epai na Yehova mpo na boboto na ye kati na libondeli. (Nz. 136:1-3) Tozali komiyoka lisusu ete topusami mpo na komonisa botɔ́ndi na biso epai na ye na ndenge mosusu. Na esengo nyonso tozali ‘kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya,’ mpo na kosimba lisangá na biso mpe mosala ya mokili mobimba na biloko ya mosuni. (Mas. 3:9) Tozali kosunga mpenza bankulutu mpe tozali kosala elongo na bango, komonisáká bongo botɔ́ndi na biso epai na Yehova mpo na lisungi oyo azali kopesa biso na nzela na bango. (1 Tes. 5:12, 13) Mokolo na mokolo, tozali kosala makasi mpo na kozala na etamboli malamu oyo ezali kokumisa nkombo ya Nzambe. (1 Pet. 2:12) Matɔ́ndi nyonso wana mazali kosepelisa Yehova.​​​—1 Tes. 5:18.

4 Lolenge eleki malamu mpo na biso ya komonisa botɔ́ndi: Kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi na molimo na biso mobimba, kokumisa nkombo ya Yehova, komonisa botɔ́ndi na biso kati na libondeli, kotatola na bosembo nyonso na ntina na solo, makambo oyo nyonso mazali kati na lolenge eleki malamu mpo na biso ya komonisa botɔ́ndi euti na motema oyo tokoki komonisela Mozalisi na biso mpo na oyo azali kosala mpo na bolamu na biso. Yehova alingi ete “bato nyonso babika” azali kosepela komona biso kosalela ye mosala ya bulɛɛ oyo ezali kopesa nzela na kokokisama ya mokano na ye. (1 Tim. 2:3, 4) Na yango basakoli mingi oyo bazali na makoki bazali koyanola na libyangi oyo epesami kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi na kozaláká babongisi-nzela basungi na boumeli ya sanza moko to koleka na sanza ya Máí mpe ya Yúni. Lolenge moko eleki malamu ya ‘komonisa botɔ́ndi na biso’ epai ya Nzambe ezali ete tómipesa koleka na mosala ya kosakola. Tokozala babongisi-nzela na sanza ya Máí mpe Yúni?

5 Tozwaki elikya ya solo ya kozala na bomoi ya seko. Na komonáká yango pene na kokokisama, tokozwa lisusu bantina koleka ya kokoba mokolo na mokolo kopesa na esengo nyonso matɔ́ndi epai na Yehova.​​​—Nz. 79:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto