Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/97 lok. 1
  • ‘Tótonga libota na biso’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tótonga libota na biso’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ́ ezali nde mpo na kozala na bolamu na libota?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Tóyebisa na bazalani na biso Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tóluka kimya ya Nzambe kati na bomoi ya libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tósalisa mabota ete bamibongisa mpo na bomoi ya seko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 4/97 lok. 1

‘Tótonga libota na biso’

1 Ntembe ezali soko moke te ete, bipai nyonso kati na mokili mobimba, bomoi ya libota ezali sé kobeba. Mokili eyangelami na Satana ezali kosepela na makambo mabe mpe na bizaleli ya mbindo. (1 Yoa. 5:19) Yango ezali komonisa ete ezali likambo ya ntina koleka mpo na biso ete ‘tótonga mabota na biso’ mpe toteya bato mosusu lolenge nini bakoki kotonga oyo ya bango.​​​—Mas. 24:3, 27.

2 Mitindá ya Biblia mizali libateli: Kosalela mitindá ya Biblia ezali lifungola ya bolamu ya solo ya libota. Mateya ya nguya ya Biblia mazali na litomba mpo na mosangani moko na moko ya libota na makambo nyonso ya bomoi. Na kosaleláká yango, libota ezali na esengo mpe na kimya oyo ezali kouta na Nzambe.​​​—Tala Yisaya 32:17, 18.

3 Mitindá oyo mizali kosalisa biso na kotonga libota na biso emonisami na lolenge ya pɛtɛɛ kati na búku oyo ya sika Le secret du bonheur familial. Mokapo moko na moko ezali kosuka na etanda oyo ezali komonisa mitindá oyo basangani ya libota basengeli komikundwela. Mingi ya bitanda yango bizali kobanda na motuna oyo elobi ete “Lolenge nini mitindá oyo ya Biblia mikoki kosalisa . . .?” Yango ezali kobenda likebi na biso likoló na makanisi ya Nzambe, kokɔtisáká na mitema na biso likanisi na ye mpo na likambo oyo ezali kotalelama.​​​—Yis. 48:17.

4 Tómimesanisa na búku yango. Tóyekola kozwa mitindá oyo mikoki kozala na ntina mpo na biso ntango mikakatano mibimi. Búku yango ezali kotalela makambo lokola oyo: Eloko nini osengeli koluka epai na ye oyo akozala mobalani na yo (mokapo 2), moboko ya libala oyo ekoumela mpe ya esengo (mokapo 3), oyo baboti bakoki kosala mpo ete bana na bango oyo batangami naino mikolo te engebene mibeko ya letá bakóma mikóló oyo babongi mpe oyo bazali kobanga Nzambe (mokapo 6), lolenge nini okoki kobatela libota na bopusi mabe (mokapo 8), mitindá oyo mizali kosalisa mabota oyo mazali na moboti sé moko mpo ete malónga (mokapo 9), lisungi ya elimo mpo na mabota oyo mazwami na boombo ya masanga mpe mobulu (mokapo 12), okosala nini ntango libala elingi kopanzana (mokapo 13), oyo ekoki kosalema mpo na kokumisa baboti oyo bakómi mibange (mokapo 15) mpe ndenge nini okoki kobongisa libota na yo mpo na bomoi ya seko (mokapo 16).

5 Tósalela mpenza búku oyo ya sika: Soki yango esalami naino te, mpo na nini te koyekola búku Bonheur familial na libota? Ndenge moko, soki libota na biso ezali kokutana na mikakatano ya sika to ezali na likambo moko ya mpasi, tótalela lisusu mikapo oyo mizali kolobela likambo yango mpe tókanisa kati na libondeli lolenge nini tokoki kosalela batoli yango. Epai mosusu, tózala bakabi na kobongisáká ntango mpo na kosakola mpe tósala makasi mpo na kokabola búku Le secret du bonheur familial epai na bato mingi koleka na sanza ya Apríli.

6 Mabota oyo mazali na bokangami epai na Nzambe makolendisama na elimo mpe makozala na bomoko, mabongisami mpo na kolonga botemeli ya satana. (1 Tim. 4:7, 8; 1 Pet. 5:8, 9) Tozali na botɔ́ndi mingi epai na Mobandisi ya libota oyo azali koteya biso!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto