Nsango ya Teokrasi
Burundi: Mayangani mibale ya mokolo moko masalemaki na Desɛ́mbɛ eleki. Na mboka-mokonzi Bujumbura, bayangani bazalaki 2 266 mpe bato 102 bazwaki batisimo. Na engumba Nyabihanga, bayangani bazalaki 636 mpe bato 27 bamonisaki komipesa na bango epai ya Yehova na kozwáká batisimo. Ezali nsango ya esengo soki totaleli ndenge makambo mazali koleka kuna!