Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/97 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Baklisto basengeli kokunda bakufi kozanga mindondo mpe na ndenge oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Likanisi ya baklisto na ntina na milulu ya bokundi ebembe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kolela ebembe to kosala matánga?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 4/97 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Ntango basɛngi na lisangá ete ebongisa milulu ya bokundi ebembe, mituna oyo milandi mikoki kotunama:

Nani akosala lisukúlu ya bokundi ebembe? Likatami yango lisengeli kokamatama na basangani ya libota. Bazali na likoki ya kopona mosakoli moko oyo azwi batisimo, oyo azali na etamboli malamu. Soki basɛngi molobi moko na lisangani ya bankulutu, lisangani ekopona mingimingi nkulutu moko ya makoki mpenza mpo na kosala lisukúlu na plan ya la Société. Bokomipesa te na kokumisa mokufi, kasi ekozala malamu ntango mosusu kobenda likebi likoló ya bizaleli malamu oyo amonisaki.

Tokoki kosalela Ndako ya Bokonzi? Likoki ezali soki lisangani ya bankulutu endimi yango mpe soki yango ezali kobebisa te manáka ya makita . Ndako ya Bokonzi ekoki kosalelama soki moto oyo akufi azalaki na etamboli malamu mpe azalaki mosangani ya lisangá, to azalaki bongo mwana moke ya mosangani moko ya lisangá. Soki eyebani polele na bato nyonso ete moto yango azalaki na etamboli ya boklisto te, to soki mpo na bantina mosusu lokumu ya lisangá ekoki kobebisama, bankulutu bakopesa ntango mosusu nzela te mpo na kosalela Ndako ya Bokonzi.​​​—Talá búku Lisangá, lok. 62.

Na momeseno, Ndako ya Bokonzi esalelamaka te mpo na milulu ya bokundi ebembe ya basangani ya libota moko ya boklisto oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Longola ntango mosusu bobele soki basangani ya libota ya mokufi bazali basakoli ya molende oyo bazwi batisimo, soki mokufi ayebanaki mpenza na ebele ya bandeko mibali mpe basi ete azalaki kotɛmɛla solo te mpe ayebanaki mpo na etamboli na ye malamu, mpe soki molulu yango mokokɔtisa molulu moko ya mokili te.

Soki bankulutu bandimi ete Ndako ya Bokonzi esalelama, bakomituna soki mboka yango ezali na momeseno ya komema ebembe na Ndako ya Bokonzi mpo na milulu ya bokundi. Soki ezali bongo bakoki kondima ete bamema yango na Ndako ya Bokonzi.

Ezali boni mpo na milulu ya bokundi bibembe ya baoyo bazali Batatoli ya Yehova te? Soki moto oyo akufi azalaki na etamboli malamu zingazinga na ye, likoki ezali ete ndeko moko apesa lisukúlu ya kobɔndisa na esika bazali kolela ebembe to na nkunda. Lisangá ekondima te kobongisa milulu ya bokundi ebembe ya moto oyo ayebanaki mpo na etamboli na ye ya mbindo to oyo eyokanaki na mibeko te, to oyo etamboli na ye ezalaki na boyokani soko moke te na mitindá ya Biblia. Ya solo, ndeko moko akondima te kosangana na mokonzi moko ya mangomba mpo na kosala milulu ya bosangisi mangomba (œcuménisme) to kotambwisa milulu ya bokundi kati na ndakonzambe moko ya Babylone Monene.

Ekozala boni soki moto oyo akufi abimisamaki na lisangá? Eyebani ete lisangá ekobongisa te milulu ya bokundi ebembe na ye, mpe Ndako ya Bokonzi ekosalelama te. Soki moto yango azalaki komonisa kobongola motema mpe mposa ya kozongisama na lisangá, lisosoli ya ndeko moko ekoki kopesa ye nzela ya kosala lisukúlu moko etongami likoló na Biblia na esika ya kolela ebembe to na nkunda na mokano ya kopesa litatoli na bayangani oyo bazali Batatoli te mpe kobɔndisa libota. Nzokande, liboso ya kozwa likatami yango, ekozala likambo ya mayele ete ndeko yango asolola na lisangani ya bankulutu mpe atya likebi na malako oyo bakoki koyebisa ye. Soki, na bantango mosusu, emonani mpenza ete ndeko yango akoki kosala lisukúlu te, ekozala ntango mosusu malamu ete ndeko moko oyo azali mosangani ya libota ya mokufi asala lisukúlu mpo na kobɔndisa bandeko na ye.

Bokozwa bingengiseli mosusu na banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1990, nk. 30-31; 15 Desɛ́mbɛ 1981, nk. 29-30; 15 Yúni 1980, nk. 5-7; 1 Sɛtɛ́mbɛ 1978, nk. 5-8; 1 Sɛtɛ́mbɛ 1977, nk. 539-540; 1 Yanuáli 1971, nk. 31-32; (ebimeli ya Lifalansé) mpe Lamuká! ya 8 Sɛtɛ́mbɛ 1990, nk. 22-23; 22 Yulí 1977, nk. 12-15 (ebimeli ya Lifalansé).

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto