Tómibanzabanza mpo na babalani oyo bazali batatoli te
1 Oyo nde esengo ya komona babalani basangani na losambo ya solo! Nzokande, na mabota mingi, ezali bobele na mobalani moko oyo andimi nzela ya solo. Tokoki kosala nini mpo na komibanzabanza na babalani oyo bazali Batatoli te mpe kolendisa bango ete básalela Yehova elongo na biso?—1 Tim. 2:1-4.
2 Tómitya na esika na bango: Ezali solo ete bamoko kati na babalani oyo bazali Batatoli te batɛmɛlaka solo. Nzokande, ezalaka mingimingi bongo mpo ete batalaka nsango na biso mpamba to bayebaka yango na lolenge ya malamu te. Mobalani moko akoki komiyoka ete asundolami to akoki koyokela molongani na ye zúwa mpo ete azali komipesa mingi na misala ya losambo na ye ya sika. Mobali moko amikundweli mayoki oyo ye azalaki na yango: “Lokola nazalaki kotikala ngai moko na ndako, namiyokaki ete nasundolami.” Mobali mosusu alobi ete: “Namiyokaki ete mwasi na ngai mpe bana na ngai basundolaki ngai.” Mibali bakoki kozala na mayoki makasi lokola nde babungisi libota na bango mpo na lingomba. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1990, nkasa 20-23.) Yango wana, ebongi kosala nyonso oyo ekoki mpo na kolendisa mobali ete asangana na lisoló na ntango mpenza mwasi na ye abandi koyekola Biblia.
3 Tósala elongo: Na kosaláká elongo, mwasi moko na mobali na ye, bango nyonso Batatoli, basalisaki babalani mosusu ete báyeba solo. Ntango ndeko mwasi abandaki boyekoli na mwasi yango, ndeko mobali abandaki kotala mobali na ye. Azwaki bongo likoki ya koyekola mbala mingi na mobali.
4 Tómonisaka boninga mpe tózalaka na boboto: Na lisangá, mabota makoki kopesa lisungi na kolukáká kosala boyokani ya penepene na mabota oyo masangani naino kati na losambo ya solo te. Soki Batatoli bazali kokende kotala bango, mobalani oyo azali Motatoli te akomona ete Batatoli ya Yehova basepelaka na bato, ete bazali baklisto oyo bamibanzabanzaka na bolamu ya bato mosusu.
5 Mbala na mbala, bankulutu bakotalela milende oyo miuti kosalema mpo na komonisa komibanzabanza na babalani oyo bazali Batatoli te mpe makambo oyo masengeli kobongisama, na elikya ete bango mpe bálóngama mpo na kosalela Yehova.—1 Pet. 3:1, maloba na nsé ya lokasa.