Ekuke monene efungwami mpo na mosala
1 Ntoma Paulo, mosakoli ya nsango malamu na molende, alukaki bateritware oyo mposa ya basakoli ezalaki monene. Moko na yango ezalaki bongo engumba ya Efese. Paulo azwaki matomba malamu kuna, yango etindaki ye ete akomela baninga na ye baklisto maloba oyo: “Ekuke monene ezipweli [“efungwameli,”NW] ngai mpo na mosala monene.” (1 Kol. 16:9) Akóbaki mosala na ye na teritware yango mpe, na lisalisi na ye, bato mingi ya Efese bakómaki bandimi.—Mis. 19:1-20, 26.
2 Lelo oyo, ekuke monene efungwameli biso mpo na mosala. Tobyangami ete tósalisa masangá oyo mbula na mbula mazali kokoka te kosakola na mozindo na teritware na bango mobimba. Na milende na biso, tokoki bongo kokokisa mposa ya basakoli oyo ezali na bisika mosusu.—Talá 2 Bakolinti 8:13-15.
3 Tokoki kosala na bisika oyo mposa ya basakoli ezali monene? Tosili kotalela na libondeli likoki ya kosala epai mosusu? Ntango mosusu lisangá moko ya engumba na biso lizali na mposa ya lisungi. Tósolola na mokɛngɛli ya zongazonga mpe akopesa biso makanisi. Ekoki kozala mpe ete kati na teritware ya lisangá na biso moko, ezali na bato mingi oyo bakufá matoi to ezali na bapaya oyo balobaka nkótá mosusu, oyo bazwi naino lisungi te. Tokanisi boni soki tokoki kosala makasi ete tóyekola lokótá na bango mpo na kosunga bango? Lisusu, ntango mosusu etuluku moko to lisangá moko ya bato oyo balobaka lokótá ya bapaya lisilaki kosalema pene na biso, mpe lizali ‘kosɛnga na Nkolo mpo na kozwa basáli mingi ya Bokonzi.’ (Mat. 9:37, 38) Soki ezali bongo, tokoki kopesa mabɔkɔ?
4 Na bambula oyo euti koleka, bankóto ya mabota ya baklisto masili kokenda kofanda na bikólo mosusu mpo na kosala mingi koleka na mosala ya kobuka mbuma. Bamoko na babalani oyo basalaki yango balobaki ete: “Tolingaki kosalela Yehova na esika oyo tokosalela mpenza makoki na biso.” Soki tozali na mposa mpe na likoki ya kokende kofanda na mboka mosusu kati na ekólo na biso to soki tozali na likoki ya kokende ata na mboka mopaya, libosoliboso tóyebisa bankulutu ya lisangá myango na biso.
5 Soki olingi koyeba makambo mosusu epai na la Société mpo na bisika oyo mposa ya basakoli ezali monene, yebisá na mokuse bamposa na yo kati na nkomá oyo okopesa na komité ya mosala ya lisangá na yo. Komité yango ekobakisa mwa maloba mpe ekotinda nkomá na yo na la Société. Atako boni, tiká ete biso banso tózala ntango nyonso na mosala mingi kati na mosala ya Yehova, lokola ekuke monene ezali naino polele mpo na mosala.—1 Kol. 15:58.