Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli, ekozala malamu ete osɛnga na ye asala abonemá. Kobanda na mwa 9 Novɛ́mbɛ, tokokabola Nsango ya Bokonzi No. 35. Desɛ́mbɛ: Kokabolama ya trakte Nsango ya Bokonzi No. 35. Masangá oyo masilisi kotala teritware na bango mobimba mpe masili kotika ekzamplɛrɛ moko ya Nsango ya Bokonzi No. 35 epai na basangani ya libota mokomoko to ya ndako mokomoko bakoki kolakisa búku Boyebi. Yanuáli: Biblia Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? Febwáli: Búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya 1985 mpe oyo ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo mazali na babúku yango te makolakisa búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.
◼ Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo, ezali na siplemá oyo ezali na “Manáka ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na 1998”; bombá yango kino nsuka ya mobu 1998.
◼ Sanza ya Novɛ́mbɛ ezali na bawikende 5; ezali bongo sanza oyo basakoli mingi bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na 1998 na nkotá oyo elobamaka mpenza na masangá ekotindama na masangá esika moko na baformilere ya mbula mobimba. Soki nkotá mosusu elobamaka na teritware na bino mpe bozali na mposa ya nkasa ya libyangi na nkotá yango, bóyebisa yango ntango bokotondisa demande na bino ya mikanda (S-14). Bokoki kozwa nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na lokotá ya Kiluba, Lifalansé, Lingala, Monokutuba, Otetela, Swahili mpe Tshiluba. Bósɛnga bobele na nkotá oyo elobamaka na teritware na bino.
◼ Masangá makosala demande ya mwa búku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—1998 ntango bakotondisa demande na bango ya mikanda ya sanza ya Novɛ́mbɛ. Bokoki kozwa mwa búku yango na lokotá ya Kiluba, Lifalansé, Lingala, Lingelesi, Monokutuba, Otetela, Swahili mpe Tshiluba. Ezali mokanda oyo etindamaka na demande spéciale.
◼ Awa bozali kosala milende mpo na kosilisa libombo na bino ya mikanda ya kala, tozali kolendisa mokomoko kati na bino ete amibombela ekzamplere moko ya búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ?