Manáka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998
Malako
Na 1998, Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi ekosalema boye:
BABÚKU: Biblia, Les Témoins de Jéhovah : Prédicateurs du Royaume de Dieu [jv], “Toute Écriture est inspirée de Dieu et utile” [si], Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko [kl], Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota [fy], mpe Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible [ad].
Kelasi esengeli kobanda na loyembo mpe na libondeli NA NTANGO ETYAMI; bongo nsima ya maloba ya bofungoli, ekolandana boye:
LISOLÓ No. 1: Miniti 15. Esengeli kopesama epai na nkulutu to epai na mosaleli na misala, mpe mateya na yango makozwama kati na búku Les Témoins de Jéhovah : Prédicateurs du Royaume de Dieu to na búku “Toute Écriture est inspirée de Dieu et utile.” Soki mateya mauti na búku Prédicateurs, lisoló yango lisengeli kosalema lokola lisukúlu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 15, kozanga ete lilandana na mituna ya bozongeli; kasi soki lizwami na búku “Toute Écriture,” likosalema lokola lisoló ya miniti 10 kino 12 oyo ekolandana na bozongeli ya miniti 3, kino 5 na lisalisi ya mituna oyo minyatámi na nsé ya lokasa ya eteni oyo epesami kati na búku oyo bouti kotalela. Mokano esengeli te kozala ya kolobela makanisi nyonso oyo matyami na eteni ya búku oyo ezali kotalelama kasi nde ya kobenda likebi likoló ya motuya ya kosalelama na yango mpe kobimisa polele makambo oyo makozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Motó na likambo oyo epesami ezali yango nde esengeli kosalelama. Bililingi, bafɔtɔ́, mpe bitánda oyo ezwami kati na búku Prédicateurs ekoki kolimbolama na molobi mpe kosalelama lokola mwango mpo na koteya.
Bandeko mibali oyo bapesameli lisukúlu oyo basengeli kokeba ete bátosa ngonga epesami. Soki yango emonani malamu to soki molobi ye moko asɛngi yango, toli ekoki kopesama na nkuku.
NDIMBOLA YA MIKAPO YA BIBLIA: Miniti 6. Eteni oyo ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala, oyo akolakisa mateya yango na lolenge malamu engebene mposa ya lisangá. Lisoló oyo esengeli te bobele kolobela na bokuse eteni oyo epesami mpo na kotánga. Ndimbola mokuse ya mikapo oyo mikotalelama ekopesama na boumeli ya segɔndi 30 kino 60. Kasi, mokano ya liboso ya lisoló oyo ezali nde ya kosalisa bayangani ete báyeba mpo na nini mpe lolenge nini mateya yango mazali na ntina mpo na biso banso. Nsima na eteni oyo, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga na banakelasi ete bákenda na bakelasi na bango, soki ezali mingi.
LISOLÓ No. 2: Miniti 5. Ezali botángi ya Biblia oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Bótangi yango ekosalema na kelasi ya liboso mpe na bakelasi nyonso mosusu. Eteni ya kotánga ezalaka mingimingi mokuse mpo na kopesa nzela epai na mwanakelasi ete apesa ndimbola mokuse, na ebandeli ya lisoló na ye mpe na bosukisi. Na ntina na mokapo oyo azali kotánga, akoki kolobela makambo maleká kala, ndimbola ya esakweli soki mpe liteya ya moboko, to komonisa ndenge ya kosalela mitindá oyo mizali na kati. Bavɛrsɛ́ nyonso epesami esengeli kotángama mbala moko mpe kolimbolama na nsima. Ya solo, soki bavɛrsɛ́ oyo esengeli kotángama elandani te, mwanakelasi akoki koyebisa esika oyo botángi ezali kolandana.
LISOLÓ No. 3: Miniti 5. Lisoló oyo likopesama epai na ndeko mwasi moko. Mateya mpo na lisoló oyo makozwama na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, to Auxiliaire. (Talá lisoló No. 4 mpo na koyeba lolenge ya kosala lisoló oyo ezali kolobela moto moko oyo alobelami kati na Biblia.) Kadre ya lisoló oyo ekoki kozala litatoli ya libaku malamu, bozongeli ya sika, to boyekoli ya Biblia na ndako, mpe bato oyo bakosangana na lisoló oyo bakoki kofanda to kotɛlɛma. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi likoló na lolenge mwanakelasi azali kosalisa mokóló-ndako ete akanisa mpe asosola mateya mpe na motindo azali komonisa lolenge ya kosalela mikapo yango kati na bomoi. Mwanakelasi oyo apesameli mokumba oyo asengeli koyeba kotánga. Molobani moko akoki koponama na mokɛngɛli na eteyelo, kasi molobani mosusu mpe akoki kobakisama. Ezali mwanakelasi nde akokata soki mokóló-ndako asengeli to asengeli te kotánga baparagrafe mosusu ntango bazali kosalela búku Boyebi to Bolamu na libota. Likebi lisengeli te kotyama mingi likoló ya kadre ya lisoló, kasi nde likoló ya lolenge malamu oyo mateya makopesama.
LISOLÓ No. 4: Miniti 5. Soki lisoló oyo ezali kolobela moto moko oyo alobelami kati na Biblia, ekopesama na ndeko mobali to ndeko mwasi. Soki ezwami kati na búku Bolamu na libota ekosalama na ndeko mobali. Mpo na lisoló mokomoko motó na likambo oyo ekolobelama epesami kati na manáka. Soki lisoló yango ezali kolobela moto moko oyo alobelami kati na Biblia, mateya ekouta na búku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, na nsé ya nkombo ya moto yango. Mwanakelasi asengeli koyekola mikapo ya Makomami oyo mizali kati na eteni oyo epesami mpo na koyeba malamumalamu moto yango oyo alobelami na Biblia—makambo malekaki na bomoi na ye, bakisá mpe bomoto na ye, mimeseno na ye mpe ezaleli na ye. Na nsima, mwanakelasi akokɔta na mozindo ya lisoló na ye mpe akopona mikapo oyo mibongi kosalelama. Mikapo mosusu oyo mizali komonisa polele mitindá ya Biblia mpe oyo mizali na boyokani na motó na likambo mikoki kokɔtisama na lisoló. Mokano na lisoló oyo ezali ya komonisa liteya tokoki kozwa uta na ndakisa ya moto mokomoko alobelami na Biblia, oyo azali kotalelama. Misala ya bosembo, ya mpiko, ya komikitisa mpe ya kozanga moimi mizali bandakisa kitoko mpo na kolanda; misala ya kozanga bosembo, bakisá mpe mimeseno mabe, mikotalelama lokola makebisi oyo masengeli kosalisa baklisto na kokima etamboli ya mabe. Soki lisoló oyo lipesami na ndeko mobali, asengeli koloba na kotaleláká na makanisi na ye bayangani oyo bazali na Ndako ya Bokonzi. Soki lisoló oyo lipesami epai ya ndeko mwasi, akosala yango na kolandáká batoli epesami na lisoló No. 3.
*MWA MANÁKA MOSUSU MPO NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Mpo na pɔ́sɔ mokomoko, mikapo ya kotánga mityami kati na ba crochets pembeni ya nimero ya loyembo. Soki olandi Manáka oyo, kotangáká nkasa zomi na pɔ́sɔ moko, okoki kosilisa Biblia mobimba na boumeli ya mbula misato. Eteni moko te ya manáka ya eteyelo to ya bozongeli ya kokóma etalelami na mwa manáka oyo ya bótangi ya Biblia.
LIYEBISI: Makanisi mosusu mpe mateya mosusu mataleli lolenge ya kopesa toli, lolenge ya kotosa ngonga oyo epesami, bozongeli ya kokoma, mpe lolenge ya kobongisa masoló, epesami kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996, lokasa 3.
MANÁKA
5 Yanuáli Botángi ya Biblia: Misala 7 mpe 8
Loyembo No. 196 [*Genese 1 kino 9]
No. 1: Bandeko bamipesá bazali konyata babúku mpe kokangisa yango (jv lok. 579 par. 4–lok. 588 par. 1)
No. 2: Misala 7:44-60
No. 3: Tótosa ntango nyonso Bokonzi oyo eleki bokonzi nyonso (kl nk. 130-131 par. 1-6)
No. 4: Yosafata (Josaphat)—Motó na likambo: Kebá na baninga mabe
12 Yanuáli Botángi ya Biblia: Misala 9 kino 10
Loyembo No. 53 [*Genese 10 kino 18]
No. 1: Bokoli ya mosala nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba (jv lok. 588 par. 2–lok. 596 par. 1)
No. 2: Misala 9:1-16
No. 3: Tosá bakonzi bazali liboso (kl nk. 131-133 par. 7-10)
No. 4: Yeu (Jéhu)—Motó na likambo: Ezaleli ya kotika nzela na makambo nyonso ekoki kobebisa molende
19 Yanuáli Botángi ya Biblia: Misala 11 kino 13
Loyembo No. 162 [*Genese 19 kino 24]
No. 1: Baordinatɛrɛ epesi lisungi mpo na kopalanganisa nsango malamu (jv lok. 596 par. 2–lok. 602 par. 3)
No. 2: Misala 13:1-12
No. 3: Tósepela na ebongiseli ya Nzambe na oyo etali bokonzi kati na libota (kl nk. 134-136 par. 11-18)
No. 4: Yefeta (Jephté)—Motó na likambo: Ndai ezali likambo ya lisɛki te
26 Yanuáli Botángi ya Biblia: Misala 14 kino 16
Loyembo No. 180 [*Genese 25 kino 30]
No. 1: Babimisi mpe bakaboli ya molende ya Biblia (jv lok. 603 par. 1–lok. 607 par. 3)
No. 2: Misala 16:1-15
No. 3: Bokonzi kati na lisangá—Ebongiseli ya bolingo euti epai na Yehova (kl nk. 137-139 par. 19-25)
No. 4: Yilimia (Jérémie) (No. 1)—Motó na likambo: Yehova apesaka nguya oyo eleki nguya ya bomoto
2 Febwáli Botángi ya Biblia: Misala 17 kino 19
Loyembo No. 111 [*Genese 31 kino 36]
No. 1: Bobimisi ya Biblia Traduction du monde nouveau (jv lok. 607 par. 4–lok. 615 par. 5)
No. 2: Misala 18:1-11
No. 3: Lolenge oyo bosembo ezali komema esengo kati na libala (kl nk. 140-141 par. 1-6)
No. 4: Yelobama (Jéroboam) (No. 1)—Motó na likambo: Bamposa ya moimi ekoki komema yo na kosambela bikeko
9 Febwáli Botángi ya Biblia: Misala 20 mpe 21
Loyembo No. 38 [*Genese 37 kino 42]
No. 1: Komekama mpe kopɛtolama kati na lisangá (jv lok. 618 par. 1–lok. 623 par. 4)
No. 2: Misala 21:1-14
No. 3: Litomba ya kosolola kati na libala (kl nk. 142-143 par. 7-9)
No. 4: Yesua (Jéschua)—Motó na likambo: Salá nyonso ekoki mpo na losambo ya pɛto
16 Febwáli Botángi ya Biblia: Misala 22 kino 24
Loyembo No. 8 [*Genese 43 kino 49]
No. 1: Mbongwana ya litambwisi ebimisi komekama (jv lok. 624 par. 1–lok. 629 par. 4)
No. 2: Misala 22:1-16
No. 3: Kumisá mpe memyá molongani na yo (kl nk. 143-145 par. 10-14)
No. 4: Yisai (Jessé)—Motó na likambo: Zalá na ezaleli ya kosalana na basusu mpe na elimo ya kokaba
23 Febwáli Botángi ya Biblia: Misala 25 mpe 26
Loyembo No. 179 [*Genese 50 kino Exode 7]
No. 1: Kosembolama ya mateya mpe ya bilikya (jv lok. 629 par. 5–lok. 633 par. 4)
No. 2: Misala 25:1-12
No. 3: Pesá ndakisa malamu mpe monisá bolingo epai na bana na yo (kl nk. 145-146 par. 15-18)
No. 4: Yetelo (Jéthro)—Motó na likambo: Tózala na lolɛndɔ te mpo na koyokamela makanisi ya basusu
2 Mársi Botángi ya Biblia: Misala 27 mpe 28
Loyembo No. 92 [*Exode 8 kino 13]
No. 1: Misala—Litomba na yango (si nk. 192-193 par. 32-40)
No. 2: Misala 27:33-44
No. 3: Oyo disiplini epesami na bolingo mpe litambwisi ya mayele ekoki kokokisa (kl nk. 148-149 par. 19-23)
No. 4: Yezabele (Jézabel) (No. 1)—Motó na likambo: Bato mabe bakoki kokima lisambisi ya Yehova te
9 Mársi Botángi ya Biblia: Baloma 1 kino 3
Loyembo No. 79 [*Exode 14 kino 20]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Baloma (si nk. 194-195 par. 1-7)
No. 2: Baloma 1:18-32
No. 3: Mpo na nini tosengeli kobɛlɛma epai na Nzambe (kl nk. 150-151 par. 1-5)
No. 4: Yoaba (Joab)—Motó na likambo: Kobukanisa ezali likambo ya Yehova
16 Mársi Botángi ya Biblia: Baloma 4 kino 6
Loyembo No. 174 [*Exode 21 kino 27]
No. 1: Bilikya, bosolo, mpe makambo mosusu (jv lok. 635 par. 1–lok. 641 par. 3)
No. 2: Baloma 4:1-15
No. 3: Masɛngami mpo na kobɛlɛma epai na Nzambe (kl nk. 152-153 par. 6-9)
No. 4: Yeudi (Jéhudi)—Motó na likambo: Tósakola nsango ya kosambisa ya Yehova
23 Mársi Botángi ya Biblia: Baloma 7 kino 9
Loyembo No. 27 [*Exode 28 kino 33]
No. 1: “Mabota nyonso bakoyina bino” (jv lok. 642 par. 1–lok. 646 par. 3)
No. 2: Baloma 9:1-18
No. 3: Sololá na Nzambe mpe Ye akoyoka yo (kl nk. 153-155 par. 10-14)
No. 4: Yobo (Job)—Motó na likambo: Bosembo ya solo ememaka ngɔlu ya Yehova
30 Mársi Botángi ya Biblia: Baloma 10 kino 12
Loyembo No. 70 [*Exode 34 kino 39]
No. 1: Bokosi ya bakonzi ya mangomba etɔndɔlami (jv lok. 646 par. 4–lok. 651 par. 4)
No. 2: Baloma 10:1-15
No. 3: Lendendelá kati na libondeli mpe yoká Ye (kl nkasa 156-159 par. 15-20)
No. 4: Yokebede (Jokébèd)—Motó na likambo: Tyá motema epai na Yehova mpe salá nyonso ekoki na yo
6 Apríli Botángi ya Biblia: Baloma 13 kino 16
Loyembo No. 175 [*Exode 40 kino Levitike 7]
No. 1: Baloma—Litomba na yango (si lok. 197 par. 20-25)
No. 2: Baloma 13:1-10
No. 3: Tóluka kobatelama ya solosolo kati na libota ya Nzambe (kl nk. 160-161 par. 1-4)
No. 4: Yoele (Joël) (No. 1)—Motó na likambo: Tóbwakela nkombo ya Yehova nsɔ́ni te
13 Apríli Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 1 kino 3
Loyembo No. 173 [*Levitike 8 kino 13]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Bakolinti (si nk. 198-199 par. 1-7)
No. 2: 1 Bakolinti 1:10-25
No. 3: Lolenge oyo Yehova azali kopesa bilei ya elimo (kl nk. 161-163 par. 5-8)
No. 4: Yoane (Jean) (No. 1)—Kokisá mosala na yo na molende
20 Apríli Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 4 kino 6
Loyembo No. 56 [*Levitike 14 kino 19]
No. 1: Bopusi ya bakonzi ya mangomba emonisami polele (jv lok. 652 par. 1–lok. 659 par. 1)
No. 2: 1 Bakolinti 4:1-13
No. 3: Komilatisa bolingo elimboli nini (kl nk. 163-166 par. 9-14)
No. 4: Yoane (Jean) (No. 3)—Motó na likambo: Zalá sembo epai na Nzambe mpe lingá bandeko na yo
27 Apríli Bozongeli ya kokoma. Bósilisa Misala 7 kino 1 Bakolinti 6
Loyembo No. 91 [*Levitike 20-25]
4 Máí Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 7 kino 9
Loyembo No. 29 [*Levitike 26 kino Mituya 3]
No. 1: Bakonzi ya mangomba mpe Hitler batɛmɛlaki basaleli ya Yehova (jv lok. 659 par. 2–lok. 665 par. 1)
No. 2: 1 Bakolinti 7:10-24
No. 3: Lisangá—Esika ya kobatelama (kl nk. 167-169 par. 15-20)
No. 4: Yona (Jonas)—Motó na likambo: Kokisá mikumba oyo Nzambe apesi yo
11 Máí Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 10 kino 12
Loyembo No. 103 [*Mituya 4 kino 9]
No. 1: Mokili mobimba etɛmɛli likambo ya komipesa mobimba epai na Yehova (jv lok. 666 par. 1–lok. 672 par. 3)
No. 2: 1 Bakolinti 11:1-16
No. 3: Mekolá Yesu—Salelá Yehova mpo na libela (kl nk. 170-171 par. 1-6)
No. 4: Yonatana (Jonathan) (No. 1)—Motó na likambo: Kebá na moimi
18 Máí Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 13 mpe 14
Loyembo No. 160 [*Mituya 10 kino 15]
No. 1: Bayinami mpo bazali “bato na mokili te” (jv lok. 673 par. 1–lok. 677 par. 3)
No. 2: 1 Bakolinti 14:1-12
No. 3: Matambe ya ntina oyo mazali komema na bomoi (kl nk. 173-175 par. 7-9)
No. 4: Yonatana (Jonathan) (No. 2)—Motó na likambo: Moninga ya solo alukaka matomba na ye moko te mpe azali sembo
25 Máí Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 15 mpe 16
Loyembo No. 158 [*Mituya 16 kino 22]
No. 1: 1 Bakolinti—Litomba na yango (si lok. 201 par. 23-26)
No. 2: 1 Bakolinti 16:1-13
No. 3: Mpo na nini batisimo ezali na ntina (kl nk. 175-176 par. 10-12)
No. 4: Yosefe (Joseph) (No. 1)—Motó na likambo: Monisá bizaleli ya moto ya elimo
1 Yúni Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 1 kino 4
Loyembo No. 58 [*Mituya 23 kino 29]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Bakolinti (si lok. 202 par. 1-4)
No. 2: 2 Bakolinti 4:1-12
No. 3: Batisimo—Likambo lileki ntina kati na bomoi na yo (kl lok. 176-177 par. 13-16)
No. 4: Yosefe (Joseph) (No. 2)—Motó na likambo: Tózala na botosi mpe na boyengebene
8 Yúni Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 5 kino 8
Loyembo No. 193 [*Mituya 30 kino 35]
No. 1: Kolobela mpe kondimisa nsango malamu na mibeko ya Letá (jv lok. 678 par. 1–lok. 683 par. 3)
No. 2: 2 Bakolinti 7:1-13
No. 3: Kozala na bomoi oyo eyokani na ndimbola ya batisimo na yo elimboli nini (kl nk. 178-180 par. 17-22)
No. 4: Yosefe (Joseph) (No. 3)—Motó na likambo: Tósundola bandeko na biso te
15 Yúni Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 9 kino 13
Loyembo No. 43 [*Mituya 36 kino Deteronome 4]
No. 1: 2 Bakolinti—Litomba na yango (si lok. 204 par. 18-20)
No. 2: 2 Bakolinti 10:1-12
No. 3: Tómibongisa uta sikawa mpo na “Bomoi ya solo” (kl nk. 181-182 par. 1-5)
No. 4: Yosefe (Joseph) (No. 4)—Motó na likambo: Zalá na mpiko mpe longolá bobángi
22 Yúni Botángi ya Biblia: Bagalatia 1 kino 3
Loyembo No. 127 [*Deteronome 5 kino 11]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Bagalatia (si lok. 205 par. 1-6)
No. 2: Bagalatia 1:1-12
No. 3: Nsima ya Armagedon—Paladiso na mabelé (kl nk. 182-184 par. 6-11)
No. 4: Yosua (Josué) (No. 1)—Motó na likambo: Tótyela bilaka ya Yehova ntembe soko moko te
29 Yúni Botángi ya Biblia: Bagalatia 4 kino 6
Loyembo No. 98 [*Deteronome 12 kino 19]
No. 1: Bagalatia—Litomba na yango (si nk. 206-207 par. 14-18)
No. 2: Bagalatia 6:1-18
No. 3: Kimya na mabelé mobimba mpe lisekwa ya bakufi (kl nk. 184-187 par. 12-18)
No. 4: Yosiya (Josias)—Motó na likambo: Tómibebisa na losambo ya bikeko te
6 Yulí Botángi ya Biblia: Baefese 1 kino 3
Loyembo No. 71 [*Deteronome 20 kino 27]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Baefese (si nk. 207-208 par. 1-8)
No. 2: Baefese 1:1-14
No. 3: Oyo ezaleli ya kokoka ekolimbola mpe lolenge tokoki kozwa yango (kl nk. 187-191 par. 19-25)
No. 4: Yotama (Jotham) (No. 2)—Motó na likambo: Tózwa liteya na mabunga ya basusu
13 Yulí Botángi ya Biblia: Baefese 4 kino 6
Loyembo No. 214 [*Deteronome 28 kino 32]
No. 1: Baefese—Litomba na yango (si nk. 209-210 par. 16-19)
No. 2: Baefese 6:1-13
No. 3: Yuda (Juda) (No. 1)—Motó na likambo: Bizaleli oyo Yehova apambolaka
No. 4: Libota ezali kati na likámá (fy nk. 5-9 par. 1-14)
20 Yulí Botángi ya Biblia: Bafilipi 1 kino 4
Loyembo No. 123 [*Deteronome 33 kino Yosua 6]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Bafilipi mpe litomba na yango (si nk. 210-211 par. 1-7; lok. 212 par. 12-14)
No. 2: Bafilipi 1:1-14
No. 3: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na Libota (fy nk. 10-12 par. 15-23)
No. 4: Yuda (Judas) (No. 3)—Motó na likambo: Makambo ya bomoi na biso ekanama liboso te
27 Yulí Botángi ya Biblia: Bakolose 1 kino 4
Loyembo No. 64 [*Yosua 7 kino 12]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Bakolose mpe litomba na yango (si lok. 213 par. 1-5; nk. 214-215 par. 12-14)
No. 2: Bakolose 4:1-13
No. 3: Yuda (Judas) (No. 5)—Motó na likambo: Tólendisa bomoko kati na lisangá
No. 4: Okoki mpo na kobala? (fy nk. 13-15 par. 1-6)
3 Augústo Botángi ya Biblia: 1 Batesaloniki 1 kino 5
Loyembo No. 35 [*Yosua 13 kino 19]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Batesaloniki mpe litomba na yango (si nk. 215-216 par. 1-5; lok. 217 par. 13-15)
No. 2: 1 Batesaloniki 2:1-12
No. 3: Mpo na nini osengeli naino komiyeba yo moko mpe kotalela makambo ndenge mazali mpenza (fy nk. 16-18 par. 7-10)
No. 4: Yuda (Jude)—Motó na likambo: Zalá na bopɔlɔ—Koluka lokumu te
10 Augústo Botángi ya Biblia: 2 Batesaloniki 1 kino 3
Loyembo No. 10 [*Yosua 20 kino Basambisi 1]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Batesaloniki mpe litomba na yango (si lok. 218 par. 1-4; lok. 219 par. 10-11)
No. 2: 2 Batesaloniki 1:1-12
No. 3: Kola (Coré)—Motó na likambo: Tótikela likunya nzela soko moke te
No. 4: Oyo osengeli koluka epai na moto oyo akozala mobalani na yo (fy nk. 18-22 par. 11-15)
17 Augústo Botángi ya Biblia: 1 Timoté 1 kino 3
Loyembo No. 221 [*Basambisi 2 kino 7]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Timoté (si lok. 220 par. 1-6)
No. 2: 1 Timoté 1:3-16
No. 3: Makambo oyo osengeli kotalela liboso ya kondima ekanganeli ya libala (fy nk. 22-23 par. 16-19)
No. 4: Labana (Laban)—Motó na likambo: Zalá sembo na boyokani na yo na basusu
24 Augústo Botángi ya Biblia: 1 Timoté 4 kino 6
Loyembo No. 30 [*Basambisi 8 kino 13]
No. 1: 1 Timoté—Litomba na yango (si lok. 222 par. 15-19)
No. 2: 1 Timoté 4:1-16
No. 3: Lameke (Lamech) (No. 1)—Motó na likambo: Mobulu ebimisaka mobulu
No. 4: Bóbatela na lokumu malamu bokutani na bino mpo na libala mpe bótalela makambo makoya nsima ya mokolo ya elambo ya libala (fy nk. 24-26 par. 20-23)
31 Augústo Bozongeli ya kokoma. Bósilisa 1 Bakolinti 7 kino 1 Timoté 6
Loyembo No. 59 [*Basambisi 14 kino 19]
7 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: 2 Timoté 1 kino 4
Loyembo No. 46 [*Basambisi 20 kino Luta 4]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Timoté mpe litomba na yango (si nk. 223 par. 1-4; nk. 224-225 par. 10-12)
No. 2: 2 Timoté 3:1-13
No. 3: Mitindá ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo na komibongisa mpo na libala oyo ekolónga (fy lok. 26 etanda ya bozongeli)
No. 4: Lasalo (Lazare) (No. 1)—Motó na likambo: Ezaleli ya koyamba bapaya ememaka mapamboli
14 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Tito 1–Filemona
Loyembo No. 155 [*1 Samwele 1 kino 8]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Tito mpe Filemona mpe litomba na yango (si nk. 225-227 par. 1-4, 8-10; nk. 227-228 par. 1-4, 7-10)
No. 2: Tito 3:1-14
No. 3: Lea (Léa)—Motó na likambo: Makanisi ya Biblia na ntina na koyina
No. 4: Fungola ya liboso mpo ete libala liumela (fy nk. 27-29 par. 1-6)
21 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Baebele 1 kino 3
Loyembo No. 149 [*1 Samwele 9 kino 14]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Baebele (si nk. 229-230 par. 1-9)
No. 2: Baebele 3:1-15
No. 3: Fungola ya mibale mpo ete libala liumela (fy nk. 30-31 par. 7-10)
No. 4: Levi (Lévi) (No. 1)—Motó na likambo: Nkanda soki eleki ndelo ememaka na mpamela
28 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Baebele 4 kino 7
Loyembo No. 3 [*1 Samwele 15 kino 19]
No. 1: Basalaki nyonso mpo na kozwa bonsomi ya losambo (jv lok. 683 par. 4–lok. 693 par. 2)
No. 2: Baebele 6:1-12
No. 3: Loisi (Loïs)—Motó na likambo: Teyá kondima na yo epai na bato ya libota na yo
No. 4: Bokonzi ya mobali esengeli kokokana na oyo ya Klisto (fy nk. 31-33 par. 11-15)
5 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Baebele 8 kino 10
Loyembo No. 209 [*1 Samwele 20 kino 25]
No. 1: Basalelaki Yehova kozanga kobanga mpe na bomoko atako botɛmɛli ezalaki (jv lok. 693 par. 3–lok. 699 par. 4)
No. 2: Baebele 8:1-12
No. 3: Lolenge oyo mwasi azali mosungi ya mobali na ye (fy nk. 34-35 par. 16-19)
No. 4: Lota (Lot)—Motó na likambo: Tózali na mokili kasi tozali kosangana na yango te
12 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Baebele 11 kino 13
Loyembo No. 108 [*1 Samwele 26 kino 2 Samwele 2]
No. 1: Baebele—Litomba na yango (si nk. 232-233 par. 23-27)
No. 2: Baebele 11:1-10
No. 3: Luka (Luc)—Motó na likambo: Zalá mosalani ya sembo
No. 4: Kosolola malamu elimboli nini (fy nk. 35-38 par. 20-26)
19 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Yakobo 1 kino 5
Loyembo No. 144 [*2 Samwele 3 kino 10]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Yakobo mpe litomba na yango (si nk. 233-234 par. 1-7; nk. 235-236 par. 15-17)
No. 2: Yakobo 5:1-12
No. 3: Mitindá ya Biblia oyo mikoki kosalisa yo na kozala na libala oyo ekoumela mpe ya esengo (fy lok. 38 etanda ya bozongeli)
No. 4: Ludia (Lydie)—Motó na likambo: Koyamba malamu bapaya ezali na motuya
26 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: 1 Petelo 1 kino 5
Loyembo No. 54 [*2 Samwele 11 kino 15]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Petelo mpe litomba na yango (si nk. 236-237 par. 1-5; lok. 238 par. 11-13)
No. 2: 1 Petelo 4:1-11
No. 3: Maele-Salala-Hasabaza (Maher-Schalal-Haseh-Baz)—Motó na likambo: Tótya likebi na makebisi ya Nzambe
No. 4: Sepelá na bomoi na biloko oyo ozali na yango (fy nk. 39-41 par. 1-6)
2 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: 2 Petelo 1 kino 3
Loyembo No. 177 [*2 Samwele 16 kino 20]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Petelo mpe litomba na yango (si lok. 239 par. 1-3; lok. 240 par. 8-10)
No. 2: 2 Petelo 3:1-13
No. 3: Kokokisa bamposa ya bato ya ndako na yo ezali moko na mikano ya libota (fy nk. 42-44 par. 7-11)
No. 4: Manase (Manassé) (No. 3)—Motó na likambo: Motema mawa ya Yehova ezali monene
9 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: 1 Yoane 1 kino 5
Loyembo No. 114 [*2 Samwele 21 kino 1 Mikonzi 1]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Yoane mpe litomba na yango (si nk. 241-242 par. 1-5; lok. 243 par. 11-13)
No. 2: 1 Yoane 5:1-12
No. 3: Manoa (Manoah)—Motó na likambo: Zalá pene ya komiyokanisa na mokano ya Nzambe
No. 4: Ntina oyo Yehova azali kosɛnga na biso ete tózala pɛto (fy nk. 45-49 par. 12-20)
16 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: 2 Yoane kino Yuda
Loyembo No. 22 [*1 Mikonzi 2 kino 6]
No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Yoane, 3 Yoane, mpe Yuda mpe litomba na yango (si nk. 243-244 par. 1-3, 5; lok. 245 par. 1-3, 5; nk. 246-247 par. 1-4, 8-10)
No. 2: 2 Yoane 1:1-13
No. 3: Oyo longonya mpe matɔ́ndi oyo euti na motema ekoki kosala mpo na libota (fy nk. 49-50 par. 21-22)
No. 4: Malako (Marc)—Motó na likambo: Kokanisa lisusu mabunga ya kala te
23 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Emoniseli 1 kino 3
Loyembo No. 195 [*1 Mikonzi 7 kino 10]
No. 1: Maloba ya ebandeli na Emoniseli (si nk. 248-249 par. 1-7)
No. 2: Emoniseli 3:1-11
No. 3: Malata (Marthe)—Motó na likambo: Koyamba bapaya na bolingo nyonso ezali na ntina mingi
No. 4: Likanisi ya Biblia likoló na bana mpe mokumba ya libota (fy nk. 51-52 par. 1-5)
30 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Emoniseli 4 kino 6
Loyembo No. 203 [*1 Mikonzi 11 kino 15]
No. 1: Lingomba ya solo ezali bobele moko oyo eponami na Nzambe (jv lok. 704 par. 1–lok. 706 par. 4)
No. 2: Emoniseli 5:1-12
No. 3: Kokokisa bamposa ya mwana na yo elimboli nini (fy nk. 53-55 par. 6-9)
No. 4: Malia (Marie) (No. 1)—Motó na likambo: Kondima mpe komipesa na Nzambe epesaka mbano
7 Desɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Emoniseli 7 kino 9
Loyembo No. 200 [*1 Mikonzi 16 kino 20]
No. 1: Yehova apambolaka baoyo bazali kosalela solo kati na bomoi na bango (jv lok. 706 par. 5–lok. 709 par. 5)
No. 2: Emoniseli 8:1-13
No. 3: Malia (Marie) (No. 2)—Motó na likambo: Tópesa motuya mingi na makambo ya elimo
No. 4: Kɔtisá solo kati na mwana na yo (fy nk. 55-56 par. 10-15)
14 Desɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Emoniseli 10 kino 12
Loyembo No. 137 [*1 Mikonzi 21 kino 2 Mikonzi 3]
No. 1: Elembo oyo ezali komonisa bayekoli ya solo ya Yesu (jv lok. 710 par. 1–lok. 712 par. 3)
No. 2: Emoniseli 10:1-11
No. 3: Teyá mwana na yo banzela ya Yehova (fy nk. 57-59 par. 16-19)
No. 4: Malia (Marie) (No. 3)—Motó na likambo: Tózala na botɔ́ndi mpo na oyo Yehova mpe Yesu basili kosala mpo na biso
21 Desɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Emoniseli 13 kino 15
Loyembo No. 60 [*2 Mikonzi 4 kino 9]
No. 1: Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kosɛnzɛla (jv lok. 713 par .1-lok. 716 par. 5)
No. 2: Emoniseli 13:1-15
No. 3: Malia (Marie) (No. 4)—Motó na likambo: Kangamá ntango nyonso na misala na yo lokola moto oyo amipesi na Nzambe
No. 4: Lolenge nyonso ya disipilini ezali na ntina monene (fy nk. 59-60 par. 20-23)
28 Desɛ́mbɛ Bozongeli ya kokoma. Bósilisa 2 Timoté 1 kino Emoniseli 15
Loyembo No. 212 [*2 Mikonzi 10 kino 15]