Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/98 lok. 1
  • Yehova apesaka nguya oyo eleki nguya ya biso bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apesaka nguya oyo eleki nguya ya biso bato
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • “Bóluka Yehova mpe Nguya na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yehova apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mosala oyo ezali kosalema na lisalisi ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • “Yehova . . . azali monene na nguya”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 2/98 lok. 1

Yehova apesaka nguya oyo eleki nguya ya biso bato

1 Bayekoli nyonso ya Yesu bapesameli libaku ya motuya oyo ezali mosala ya bulɛɛ: mosala ya kosakola. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Nzokande, mpo na kozanga kokoka mpe mikakatano ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, ekoki kokómela biso tómiyoka ete tokokoka te.

2 Soki yango ekómeli biso, tokoki kolendisama na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto bapakolami ya Kolinti. Akomaki ete: “Tozali na eloko oyo na motuya kati na mbeki iyemami na mabelé.” (2 Kol. 4:7) Paulo andimisamaki, na kolobáká ete: “Awa ezali biso na mosala oyo . . . , tozali kotika motema te.” (2 Kol. 4:1) Tózala baklisto bapakolami to basangani ya “bampate mosusu,” tosengeli koyeba ete ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na moto nyonso kokóba kosakola nsango malamu ‘kozanga kotika.’ Tozali na mposa ete Nzambe apesa biso makasi, ‘nguya oyo eleki nguya ya biso bato.’​—Yoa. 10:16; 2 Kol. 4:7b.

3 Ezali likambo ya kolendisa na komona ete atako botɛmɛli makasi, mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto to bobola ezali, Batatoli mingi bazali bapalanganisi ya molende ya nsango malamu. Tosengeli biso nyonso koyeba malamu ete mosala na biso ya kosakola esimbami na Yehova. Na yango, tópesa nzela te na kolɛmba nzoto to na kobanga ete elɛmbisa ekateli na biso, kasi nde ‘tókóba komikembisa kati na Nkolo mpe na makasi ya nguya na ye.’—Ef. 6:10; Mas. 24:10.

4 Lolenge nini kozwa nguya ya Nzambe: Tóbondelaka Nzambe na etingya na kosɛngáká lisungi na ye mpe makasi na ye. (Lom. 12:12; Filp. 4:6, 7) Mpe, na motema na biso mobimba, tótya elikya na biso nyonso na Yehova, komindimisáká ete akopesa biso nguya oyo eleki nguya ya biso bato. (Mas. 3:5) Tótangaka makambo ya bomoi ya bandeko oyo ebimisamaka na bazulunalo na biso; yango ezali kopesa elembeteli ete Yehova azali kosunga basaleli na ye mpo ete bálónga komekama. Tókendaka kotala bandeko ya lisangá mpe tózangisaka makita te.—Lom. 1:11, 12; Ebe. 10:24, 25.

5 Tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo tózala na likoki ya kozwa nguya ya Yehova, nguya oyo eleki nguya ya biso bato mpe oyo ekosalisa biso ete tótika te mosala ya ntina, kosakola Bokonzi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto