Mosala oyo ezali kosalema na lisalisi ya Nzambe
1 Lelo oyo kaka basaleli ya Nzambe moke nde batángá kelasi mingi, bazali na bozwi to bazali bato ya lokumu na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Yango wana, bato mosusu bamonaka mpamba mosala na biso. (Yis. 53:3) Nzokande, mosala ya koteya bato Biblia oyo tozali kosala ebɔndisi bamilio ya bato na mokili mobimba mpe epesi bango elikya. Ndenge nini bato mpamba bazali kosala mosala monene wana? Kaka na lisalisi ya Nzambe. (Mat. 28:19, 20; Mis. 1:8) Ntoma Paulo alobaki ete: “Nzambe aponaki biloko ya mokili oyo bizali ya bolɛmbu, mpo akoka koyokisa biloko ya makasi nsɔni.”—1 Kol. 1:26-29.
2 Bantoma mpe baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki mpenza “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Kasi, bakobaki kokokisa mokumba na bango ya koteya nsango malamu na mpiko mpenza mpe Yehova apambolaki milende na bango. Atako mikakatano mpe botɛmɛli ezalaki, ‘liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga na ndenge moko ya nguya.’ Moto moko te akokaki kosukisa mosala yango mpamba te ezalaki kosalema na lisalisi ya Nzambe. (Mis. 5:38, 39; 19:20) Ezali yango nde ezali komonana lelo na mikolo na biso. Ata botɛmɛli makasi ya bakonzi minene ya politiki epekisi te nsango malamu epalangana mpe elonga.—Yis. 54:17.
3 Lokumu nyonso ezali ya Nzambe: Lokola tozali na libaku malamu ya kozala baministre ya Nzambe, tosengeli nde komikumisaka? Te. Ntoma Paulo akomaki mpo na mosala ya kosakola boye: “Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabelé, mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.” (2 Kol. 4:7) Paulo andimaki ete kaka nguya oyo Nzambe apesaki ye nde esalisaki ye akokisa malamu mosala na ye.—Ef. 6:19, 20; Filp. 4:13.
4 Ndenge moko biso mpe tondimaka ete ezali kaka mpo ‘tozwi lisalisi oyo euti epai ya Nzambe’ nde tozali kokokisa mosala ya kosakola. (Mis. 26:22) Ntango tozali kosakola ndenge wana na mokili mobimba, Yehova azali kosalela biso na nguya mpenza mpo na koningisa bikólo—likambo oyo ezali komonisa ete ntango oyo Yehova akopesa bikólo etumbu ekómi pene. (Hag. 2:7) Tozwi mpenza libaku malamu ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe,” na mosala monene ya kobuka mbuma na elimo!—1 Kol. 3:6-9.