Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/98 nk. 2-5
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 1/98 nk. 2-5

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuáli: Biblia Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? Febwáli: Búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya 1985 mpe ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo mazali na babúku yango te makolakisa búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Mársi: Búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Apríli: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala milende mpenza mpo na kobanda boyekoli ya Biblia.

◼ Masangá masengeli kobanda kosala komande ya relyé ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! 1997 na lokasa ya komande ya mikanda. Barelyé yango ekozala na Lifalansé, na Lingelesi mpe na Portugais. Barelyé ezali mikanda oyo mitindamaka na komande ya sipesiale.

◼ Kɔ́nti ya lisangá esengeli kotalelama na mwa 1 Mársi to mwa moke nsima na dati yango, na mokɛngɛli-mokambi to na moto mosusu oyo ye akopona. Na nsima, kotalelama yango ekoyebisama na lisangá.

◼ Na 1999, Ekaniseli ekosalema na mokolo ya minei Mwa 1 Apríli, nsima ya kolala ya moi. Dati yango eyebisami liboso mpenza mpo na kolɛngɛla to kofutela bisika, epai kuna masangá mingi mazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko; likambo oyo lisɛngisaka bango ete bálukaka bisika mosusu mpo na libaku yango. Bankulutu basengeli komindimisa mpenzampenza ete bankolo bisika yango bakondima molulu mosusu te to likambo moko te oyo ekobebisa molulu ya Ekaniseli. Na kotaleláká ntina monene ya molulu yango, lisangani ya bankulutu lisengeli kopona nkulutu moko kati na bankulutu oyo bazali na makoki mingi koleka ete asala lisukúlu ya Ekaniseli, na esika ya kopona nkulutu na nkulutu na ngala na ye to kosalela bobele ndeko yango moko mbula na mbula.

◼ Mbala moko na mbula, filiale ya France ezali konyata baformilɛrɛ mpo na kokokisa bamposa na biso na boumeli ya mbula mobimba, na kotaleláká komande na biso mpe motángo ya basakoli. Na yango, tozali kosɛnga na masangá ete básalela malamumalamu baformilɛrɛ oyo bazali na yango na libombo mpo yango esila te liboso ya kozwa oyo ya mbula ezali koya. Ezali na ebongiseli te ya kopesa formilɛrɛ na masangá na boumeli ya mbula, longola bobele masangá ya sika. Lolenge ya kosalela formilɛrɛ na bino kino nsuka ya mbula:

◆ Formilɛrɛ ya kosalela pɔ́sɔ na pɔ́sɔ: M-1, M-101, M-203, S-24. Bótinda na Biro bobele lokasa ya likoló; bóbomba lokasa ya nsé na dosyé ya lisangá. Bokotinda yango nyonso mibale te. Formilɛrɛ S-8, S-48, S-61a, S-61b mpe S-88 ekoki kosalelama pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kasi ekotindama na Biro te. Ekotikala na lisangá.

◆ Formilɛrɛ ya kosalela mbala moko na sanza: S-14, S-20. Na formilɛrɛ oyo mpe, bokotinda bobele lokasa ya likoló, lokasa ya nsé ekobombama na dosyé ya lisangá. Formilɛrɛ S-3, S-4, S-26, S-28, S-30 mpe S-89 etondisamaka sanza na sanza, kasi etindamaka na Biro te. Lisangá mokomoko ekozwa ekzamplɛrɛ 13 ya formilɛrɛ S-1 mpo na mbula mobimba. Ekzamplɛrɛ moko ekotondisama na sanza moko mpe ekotindama na Biro. Formilɛrɛ S-1 ezalaka na kopi te. Na esika ya kosala kopi na yango, bokoki kotondisa formilɛrɛ S-21 misato: moko mpo na mosala ya kosakola ya basakoli, moko mpo na babongisi-nzela basungi mpe moko mpo na babongisi-nzela ya sanza na sanza.

◆ Formilɛrɛ oyo bokosalela mingimingi te: M-202, S-12, S-13, S-19, S-9.

◼ Soki libunga esalemi ntango ya kotondisa formilɛrɛ moko, ezali malamu kobongisa yango bobele na formilɛrɛ wana. Formilɛrɛ esengeli te kosalelama mpo na kotinda mikanda to lokola nkasa ya kokomakoma. Tolɔ́mbi na masangá oyo mazwi naino formilɛrɛ na bango ya kosalela na boumeli ya mbula mobimba te ete bázela naino. Ekokómela bango kozanga koumela mingi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto