Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yanuáli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yanuáli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 5 Yanuáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 12 Yanuáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 19 Yanuáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 26 Yanuáli
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 1/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yanuáli

Pɔ́sɔ ebandi na 5 Yanuáli

Loyembo 57

Min. 10: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Tóloba na ntina na Yehova mokolo na mokolo.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Na ntango ya botaleli par. 4, bópesa bakomantere oyo euti na boyekoli 16 ya búku Mokanda mpo na Eteyelo, par. 14-16.

Min. 20: “Biblia: Likabo ya Nzambe mpo na kotambwisa bato nyonso.” Nkulutu moko azali kolobela lisoló yango mpe bantina oyo esengeli kopusa moto mokomoko ete atalela Biblia. [Talá mwa búku Un livre pour tous (Búku mpo na bato nyonso), nk. 30, 32.] Tuná basakoli mibale mwa mituna oyo bakolimbola na mokuse, na ntina na lolenge bazali komibongisa mpo na kosalela malako ya par. 3-8. Salá elakiseli moko oyo ekouta na moko na baparagrafe yango mpo na kolakisa lisoló na mbala ya liboso mpe elakiseli mosusu oyo ekomonisa bozongeli ya sika.

Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 12 Yanuáli

Loyembo 58

Min. 10: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

Min. 20: Mpo na nini koyebisa lisumu oyo moto asali? Lisukúlu ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1997, nk. 26-30, ekosalema na nkulutu moko.

Min. 15: “Kozanga na yo na makita eyebanaka malamu!” Lisoló elongo na bayangani, ekotambwisama na nkulutu moko. Yebisá mwayene ya bato oyo bayanganaka na makita ya lisangá. Sɛngá na bamoko na bandeko ete báyebisa mpo na nini koyangana na makita elendisaka bango.

Loyembo 172 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 19 Yanuáli

Loyembo 63

Min. 5: Mayebisi.

Min. 15: Mposa ya lisangá.

Min. 25: “Tosengeli kozala bateyi, bobele basakoli te.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Na ntango ya botaleli par. 11, bótánga par. 11 ya boyekoli 15 ya búku Mokanda mpo na Eteyelo.

Loyembo 174 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 26 Yanuáli

Loyembo 138

Min.  8: Mayebisi. Sɛngá na basakoli ete bámɛma siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1998 na likita ya mosala ya pɔ́sɔ oyo ekolanda.

Min. 17: “Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998.” Lisukúlu na mokɛngɛli na eteyelo. Limbolá lolenge nini mokomoko akoki kozwa matomba mingi koleka na eteyelo yango na boumeli ya mbula oyo. Lendisá mokomoko ete alanda pɔ́sɔ na pɔ́sɔ “Manáka ya botángi ya Biblia oyo ebakisami.”

Min. 20: Tósakola nsango malamu na bisika nyonso. Lisoló elongo na bayangani, lizwami na búku Lisanga, nk. 93-97, na lisalisi ya mituna milandi: (1) Mpo na nini kosalelama ya mikanda na biso ebongi mpenza mpo na kopalanganisama ya nsango malamu? Mpo na nini tosengeli kolakisa yango na mabaku nyonso? (2) Mpo na nini tosengeli kosala milende mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu? Wapi mwa mitindo ya kosala yango? (Sɛngá na basakoli ete bálobela makambo bakutanaki na yango na litatoli ya libaku malamu.) (3) Mpo na nini lisangá lisengeli kolendendela mpo na kosala malamumalamu teritware na yango mobimba? Na esika oyo mosala ezali mingi, mpo na nini ezali malamu kozala na teritware na yo moko? (4) Litomba nini ezali na bibongiseli oyo bizwami mpo na kosakola kati na bituluku? Lolenge nini tokoki kobongisa mosala na biso ya kosakola mpo ete tosalela ntango na biso malamumalamu?

Loyembo 222 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto