Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/98 lok. 1
  • Bakoki komona ete tokeseni na bato ya mangomba mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakoki komona ete tokeseni na bato ya mangomba mosusu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Tozwaka matomba na kotalela milende oyo tozali kosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 12/98 lok. 1

Bakoki komona ete tokeseni na bato ya mangomba mosusu

1 Na mobu moleki, bato ya sika koleka 300 000 basanganaki na biso mpe bazwaki batisimo. Eloko nini bato yango bamonaki epai ya Batatoli ya Yehova oyo esali ete báya kati na lisangá ya Nzambe? Mpo na nini tokeseni na bato ya mangomba mosusu? Biyano mosusu yango oyo:

​—Tokangamaka na Biblia na esika ete tópesa makanisi ya biso moko: Tosambelaka Yehova Nzambe ‘na elimo mpe na solo’ lokola Yesu alobaki yango. Yango elingi koloba kobwaka mateya ya lokuta mpe kosalela Liloba ya Nzambe.​—Yoa. 4:23, 24; 2 Tim. 3:15-17.

​—Tokendeke kotala bato epai na bango na esika ete tózela bango báyaka epai na biso: Tondimi etinda ya Klisto ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu. Mpe tomekolaka ndakisa na ye na kolukáká bato ya motema malamu. Tolukaka bango na bandako na bango, na balabala, to epai nyonso oyo tokoki kokuta bango.​—Mat. 9:35; 10:11; 28:19, 20; Mis. 10:42.

​—Toteyaka moto nyonso Biblia kozanga kofutisa mbongo: Topesaka makoki na biso mpe nguya na biso, mpe tolekisaka ngonga koleka miliare moko mbula na mbula na mosala ya Nzambe. Toyekolaka Biblia na bato ya mitindo nyonso kozanga koponapona.​—Mat. 10:8; Mis. 10:34, 35; Emon. 22:17.

​—Tobongisami malamu mpo na kosalisa bato na elimo: Na lisalisi ya boyekoli ya biso moko ya Biblia mpe na lisalisi ya mateya oyo ezali kopesama na makita ya lisangá, na mayangani ya minene mpe na mayangani ya mike, tozali kozwa mateya ya ntina ya Teokrasi oyo ezali kopesa biso likoki ya kongɛngisa bato mosusu na elimo.​—Yis. 54:13; 2 Tim. 2:15; 1 Pet. 3:15.

​—Totalelaka solo na motuya mpe tosalelaka yango na bomoi na biso ya mokolo na mokolo: Na ntina na bolingo na biso mpo na Nzambe, tosalaka mbongwana, totambwisaka bomoi na biso na boyokani na mokano na ye. Bomoto na biso ya sika oyo etongami likoló na Klisto ezali kobenda bato mosusu kati na solo.​—Kols. 3:9, 10; Yak. 1:22, 25; 1 Yoa. 5:3.

​—Tosalaka milende mpo na kozala na kimya elongo na basusu: Kolona bizaleli oyo biuti na Nzambe esalisaka biso ete tókeba na misala na biso mpe na maloba na biso. ‘Tolukaka kimya mpe tobatelaka yango’ epai na bato nyonso.​—1 Pet. 3:10, 11; Ef. 4:1-3.

2 Bandakisa ya bomoi ya boklisto oyo bato mingi bamonaka na lisangá ya Yehova epusaka bango ete bándima solo. Tiká ete ndakisa ya mokomoko na biso ezala na bopusi lolenge moko epai na bato oyo bayebi biso mpe batalaka biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto