Bankulutu bazali kotambwisa lisangá—Mikumba ya motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
1 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Eyebisaka Bokonzi ya Yehova ezali bilei ya ntina mpe ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso “na ntango ebongi.” (Mat. 24:45) Nkulutu oyo atambwisaka boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli azali na mokumba monene. Asengeli kozala motei ya makoki oyo azali kopesa ndakisa malamu na bomoi ya boklisto.—Lom. 12:7; Yak. 3:1.
2 Mpo na koteya malamu, motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli asengeli kosala molende mpo na komibongisa malamumalamu pɔsɔ na pɔsɔ. Asengeli kosala yango kati na mabondeli. Lokola asepelaka na bandeko ya lisangá mingi, amonisaka yango na kosaláká milende ya solosolo mpo na kosimba mitema na biso na lisolo oyo tozali koyekola. Atyaka likebi mingi na makanisi ya ntina oyo mazwami kati na lisolo mpe asalisaka biso ete tómona lolenge makanisi yango mayokani na motó ya lisolo.
3 Mpo na ye, kobongisa boyekoli na mozindo elimboli kotalela bavɛrsɛ liboso mpo na koyeba lolenge ya kosalela yango. Apesaka motuya na Liloba ya Nzambe na kolendisáká lisangá ete esalela Biblia malamu na boumeli ya boyekoli. Soki likanisi moko ya ntina ebimisami naino te na biyano ya bayangani, to soki vɛrsɛ ya moboko elobelami malamumalamu te, atunaka mwa mituna mosusu ya sikisiki mpo na kobimisa likanisi yango. Na lolenge wana, asalisaka biso ete tómona makanisi ya ntina mpe tóyeba lolenge ya kosalela makambo oyo tozali koyekola na bomoi na biso.
4 Motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli asalaka milende mpo na kokolisa makoki na ye ya koteya. Alobaka mingi te ntango azali kotambwisa boyekoli, kasi alendisaka biso ete tópesa biyano—na maloba na biso moko, ya mikuse mpe ya sikisiki. Na bantango mosusu, akoki kokundolela biso ete moto ya liboso oyo akopesa eyano na paragrafe asengeli kopesa eyano ya mokuse oyo eyokani na motuna. Biyano mosusu ya bayangani ekoki kolobela bavɛrsɛ, kopesa makanisi oyo eyokani na paragrafe to lolenge ya kosalela makambo oyo malobelami. Motambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli asalaka molende mpo na kolamwisa mposa ya moto nyonso ete apesaka biyano na kolendisáká bayangani ete bábongisaka boyekoli.
5 Lokola tozali ‘bato oyo bateyami na Yehova,’ tozali kosepela na “makabo na motindo na mibali,” lokola batambwisi ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo ‘bazali kosala mingi kati na . . . mosala ya koteya.’—Yis. 54:13; Ef. 4:8, 11; 1 Tim. 5:17.