Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/99 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 1/99 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1985 mpe ezali kati na libombo ya lisangá. Masangá oyo mazali na babuku yango te ekolakisa buku La paix et la sécurité véritables : Comment est-ce possible ? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato. Aprili: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokozala mpe na mwa buku Azali kosɛnga mpo na baoyo basepelaka na solo; tokosala makasi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia elongo na bango.

◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo, ezali kolobela liyangani ya etúká mpo na mobu 1999 yango ekosalelama na Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 28 Desɛmbɛ 1998.

◼ Na likita ya mosala ya pɔsɔ ya 4 Yanuali, basakoli nyonso oyo bazwá batisimo bakozwa kalati “Instructions médicales/Pas de sang” mpe Carte d’identité mpo na bana na bango.

◼ Kobanda na sanza ya Febwali, eleka mokolo ya 1 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó na likambo ete “Ondimaka ete Nzambe azali solo moto?”

◼ Masangá masengeli kozwa bibongiseli bibongi mpo na Ekaniseli, yango ekosalema mbula oyo na mokolo ya minei mwa 1 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, limpa mpe vinyo esengeli kolekisama nsima ya kolala ya moi. Bótala malamu ngonga oyo moi elalaka na esika bozali. Atako ezali malamu ete masangá masala molulu ya Ekaniseli na bisika bikeseni, yango ekoki ntango nyonso kosalema bongo te. Epai kuna masangá mingi mazali kosala makita na bango na Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu likoki ekozala ete moko na masangá yango to mingi esalela bisika mosusu na mpokwa wana. Soki likoki ezali bokoki kotika miniti 40 kati na makita mibale mpo na kozwa ntango ya kopesa babyangami mbote, kolendisa bato oyo babandi kosepela na solo sika. Yango ekosala ete bato bázwa mpenza litomba na libaku yango. Bosengeli mpe kotalela likambo ya esika ya kotelemisa mituka, mpe esika oyo batambwisi mituka bakoki kokitisa mpe komema bato na mituka. Lisangani ya bankulutu esengeli kozwa ekateli na ntina na bibongiseli oyo bamoni ete ekozala malamu mpo na esika oyo bafandi.

◼ Lisukulu ya sipesiale mpo na mobu 1999 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema mokolo ya lomingo mwa 18 Aprili. Motó ya likambo na yango ezali: “Boninga ya solo elongo na Nzambe mpe bazalani na biso.” Plan na yango ekotindama nsima. Masangá oyo mokɛngɛli ya zongazonga akotala, to oyo makozala na liyangani ya zongazonga to na liyangani ya mokolo moko na pɔsɔ yango, makosala lisukulu ya sipesiale na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 18 Aprili 1999. Lokola Ekaniseli ezali molulu moko ya ntina mingi mpo na komanyola likoló na oyo Yehova mpe Yesu Klisto basili kosala mpo na biso, ekozala malamu te ete tósalela libaku yango lokola feti mpo na kolya mpe komɛla.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Index ya mikanda ya la Société 1996.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto