Lolenge ya kobanda boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga
1 Balapolo oyo euti na mokili mobimba emonisi ete mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? ezali esaleli moko ya nguya mingi mpo na koteya bato solo. Pɔsɔ na pɔsɔ bankama ya bato bazali kobanda boyekoli ya Biblia na mwa buku yango. Osili kozwa matomba malamu mpo na oyo etali kobanda mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia na mwa buku Azali kosɛnga?
2 Atako mingi bazali komona ete ezali pɛtɛɛ kokabola mwa buku yango epai na bato, nzokande basusu bazali komona ete ezali mpasi koyeba oyo osengeli koloba mpo na kobanda boyekoli. Wapi mwa myango oyo esili kobimisa matomba mpo na oyo etali kobanda boyekoli ya Biblia na lisungi ya mwa buku Azali kosɛnga? Makanisi oyo malandi makoki kosalisa biso.
3 Monisá ndenge boyekoli esalemaka: Wana tokei epai ya moto mpo na mbala ya liboso to ntango tozongeli ye, na esika ete tólendisa ye bobele na koyekola Biblia, tokoki komonisa ye ndenge boyekoli esalemaka. Yango ekosalisa ye na kolongola bobangi oyo bato mingi bazalaka na yango wana bayoki liloba “boyekoli.” Soki tomeseni na kosala bongo, tokomona ete ata mwa elakiseli moke ekoki komema biso mbala moko ete tóbanda boyekoli.
4 Sɛkɛlɛ ya bolongi ezali komibongisa malamu: Mpo tózala na esengo ya kobanda boyekoli ya Biblia tosengeli komibongisa malamu. Soki tomibongisi malamu liboso, yango ekosalisa biso ete tólonga mwa kokakatana oyo tokoki kozala na yango mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na moto. Soki tosali elakiseli yango mbala mingi, tokomesana na yango kino tokokóma na makoki ya koloba kozanga kokakatana mpe na maloba na biso moko. Yango ekosalisa kaka biso moko te ete tóloba kozanga kobanga, kasi ekosalisa mpe molobani na biso ete amiyoka malamu.
5 Wana ozali komibongisa yo moko, ezali malamu oyeba soki elakiseli yango ekozwa ntango boni, na boye okozala na likoki ya koyebisa molobani na yo ntango boni elakiseli yango ekoki kozwa. Nsima ya kobanda lisolo, ndeko mobali moko azalaki koloba: “Naleki awa mpo na komonisa yo lolenge oyo tosalaka boyekoli ya Biblia kozanga kofuta mbongo. Nakomonisa yo yango na boumeli ya miniti mitano. Okoki kopesa ngai miniti mitano mpo na yango?” Tokoki kotalela liteya 1 ya mwa buku Azali kosɛnga na miniti mitano. Ezali solo ete tosengeli te kotánga mikapo nyonso na mwa miniti yango, kasi soki tosali boyekoli ya liteya ya liboso mobimba na mwa miniti moke, yango ekosalisa molobani na biso ete amona ndenge boyekoli na ye ya liboso esalemi. Na nsima, yebisá ye ete ntango okozongela ye mpo na koyekola liteya 2, yango ekozwa bobele miniti 15.
6 Elakiseli oyo elandi esili kobimisa mpe matomba malamu:
◼ “Nalingi kolakisa yo lolenge ya pɛtɛɛ mpe ya mokuse ya koyekola Biblia na lisalisi ya mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Bato mingi basili komona ete na kobongisáká miniti 15 na pɔsɔ moko mpo na boyekoli, nsima ya pɔsɔ 16, bakoki kozwa biyano ya Makomami bibongi likoló na mituna oyo ya Biblia.” Lobelá na mokuse etanda ya kolandana ya makambo. Nsima zongá na liteya 1, mpe lobá: “Soki okoki kopesa biso miniti mitano, tokosepela kolakisa yo ndenge boyekoli yango esalemaka. Liteya 1 ezali na motó ya likambo ete ‘Lolenge okoki koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga.’” Na nsima tángá mituna misato, mpe limbolá mituya oyo mizali kati na paranteze pembeni ya mituna. Tángá paragrafe 1, mpe lakisá molobani na yo ndenge ya koluka eyano. Okoki kosɛnga molobani na yo ete atánga paragrafe ya mibale. Na nsima lobá: “Na kotaleláká makambo oyo outi kotánga, ndenge nini okoki koyanola na motuna oyo? [Tángá lisusu motuna, mpe tiká molobani na yo apesa makanisi na ye.] Okomona ete paragrafe mokomoko ezali na mikapo ya Biblia. Yango ezali kobenda likebi na biso likoló na biyano oyo Biblia ezali kopesa na mituna yango. Na ndakisa; tótánga 2 Timote 3:16, 17 mpe talá soki yango ezali na boyokani na eyano oyo opesaki na motuna ya koyeba nani azali mobandisi ya Biblia.” Nsima ya kotánga paragrafe 3, ya kotuna motuna, mpe ya kotánga Yoane 17:3, bendá likebi ya molobani na yo likoló ya boyebi oyo asili kozwa na kosaláká bozongeli ya liteya 1. Nsima na yango bokoki koleka na liteya 2 mpe tángá motuna ya nsuka oyo elobi, “Wapi nzela mibale tokoki koyekola makambo na ntina na Nzambe?” Na nsima tuná ye: “Mokolo nini okoki kopesa biso lisusu miniti 15 mpo tókoka koyekola liteya 2 mpe kozwa eyano na motuna oyo?”
7 Ezali malamu ete lisolo ezala na mindondo te mpe tózala pene ya kopesa molobani na biso longonya ntango nyonso oyo ayanoli malamu. Ntango tozali koluka libaku mosusu ya kozongela molobani na biso, na esika ya kotuna ye soki alingi kokoba na boyekoli, ekozala malamu tólendisa ye na komilengela se lolenge yango mpo na liteya oyo ekolanda. Salá nyonso ayeba ete ozali na mposa makasi ya kozongela ye lisusu. Basakoli mosusu bapesaki likanisi ya kotambwisa boyekoli na telefone, soki manaka na bango na ya bayekoli ezali lisusu koyokana te. Okoki mpe koyebisa moyekoli ya Biblia ete abomba mwa buku yango na esika malamu, mpo ete amona yango mbala moko ntango okozongela ye.
8 Zalá na mokano: Atako sɛkɛlɛ ya bolongi ezali komibongisa, tosengeli kozala na mokano ya kolandela yango ntango nyonso. Kotambwisa boyekoli na mwa miniti moke ekoki kozala mpasi, mpo na yango zalá na mokano ya kosalela elakiseli oyo mbala na mbala mpo na koloba kozanga kokakatana wana ozali kolakisa ndenge boyekoli esalemaka. Meká kolakisa lolenge ya kosala boyekoli na moto nyonso oyo okutani na ye na ndako, na balabala, mpe wana ozali kopesa litatoli na telefone. Soki ozali kokoka kofungola boyekoli ya Biblia te, kolɛmba te. Mpo na kolonga kobanda boyekoli ya Biblia, osengeli kozala na ekateli makasi mpe na mposa ya koteya basusu solo.—Gal. 6:9.
9 Na kosaleláká toli oyo, yo mpe okoki kozwa libaku ya kosalisa moto moko na nzela ya bomoi, na kobandáká mpe kotambwisáká boyekoli ya Biblia na mwa buku Azali kosɛnga.—Mat. 7:14.