Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/99 lok. 1
  • Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mokili mobimba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Monisá botɔndi mpo na oyo Yehova ná Yesu basalelá yo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ntina oyo mokonzi moko ya likoló asalaki molulu oyo ezangi mindɔndɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Bólinga Yehova, bino bayengebene na ye nyonso”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 3/99 lok. 1

Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mokili mobimba

1 Yehova asili kosopela biso makabo mingi mpenza. Motuya ya bolamu mpe boboto na ye esili kolobelama na lolenge ya kokamwa lokola “likabo ya Nzambe liyebi kolobama te.” Ɛɛ, “ngɔlu ya Nzambe” ezali mpenza monene mpo na kolobela yango na boye ete eleki makoki na biso.​—2 Kol. 9:14, 15.

2 Likabo na ye oyo eleki makabo nyonso: Yesu Klisto, lokola azali Mosikoli ya bato, azali likabo oyo eleki makabo nyonso. Mpo na komonisa bolingo na ye makasi mpo na bato, Yehova apesaki mwana na ye molingami mpe mobotami-bobele-moko. (Yoa. 3:16) Ebongi ete na mokili mobimba bato bákanisaka lipamboli motindo boye oyo euti na Nzambe. Ekaniseli yango ekosalema ntango nini mpe ndenge nini? Na mpokwa ya mokolo ya minei mwa 1 Aprili 1999, baklisto bipai nyonso na mokili bakokanisa Elambo ya mpokwa ya Nkolo, kosaláká bongo Ekaniseli ya mbeka oyo eleki mbeka nyonso.​—1 Kol. 11:20, 23-26.

3 Klisto akufaki mpo na biso “wana tozalaki naino bato ya masumu,” mpe tokoki komonisa botɔndi na biso soki tokumisi Ekaniseli ya liwa na ye mpe soki tobéngi bato mosusu ete báyangana elongo na biso na molulu yango ya ntina mingi.​—Lom. 5:8.

4 Molulu oyo eleki milulu nyonso na ntina: Kokanisa liwa ya Klisto ezali kobenda likebi libosoliboso na lolenge oyo asimbaki Bokonzi ya Nzambe na motema moko. Ezali mpe kotinda biso na kokanisa ete tokoki kozala na etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Yehova soki tomonisi kondima na mbeka ya Yesu, mpe na bongo tokozwa elikya ya lobiko. (Mis. 4:12) Ya solo, oyo ezali molulu oyo eleki milulu nyonso na ntina kati na mobu!

5 Tokomonisa bolingo mpo na bazalani na biso soki tobéngi bango ete bákumisa elongo na biso Elambo ya mpokwa ya Nkolo. Bamilio ya bato oyo bazali koyekola motuya monene ya lisiko, bakoki mpe kozwa matomba ya lisiko yango. (Filp. 3:8) Baoyo bazali komonisa kondima na mbeka ya Klisto bakoki kozwa elikya ya bomoi ya seko.​—Yoa. 17:3.

6 Eleko ya Ekaniseli ezali libaku moko malamu mpo na biso ete tómonisa botɔndi epai na Yehova mpo na ngɔlu na ye. Yango ezali ntango moko malamu mpo na kosangana na molende nyonso na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Matomba mingi mazali kozela baoyo nyonso bazali komanyola kati na mabondeli likabo oyo eleki makabo nyonso mpe bamibongisi mpo na koyangana na molulu ya Elambo ya mpokwa ya Nkolo oyo ekosalema na mbula oyo!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto