Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/04 lok. 1
  • “Bólinga Yehova, bino bayengebene na ye nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bólinga Yehova, bino bayengebene na ye nyonso”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Salisá basusu bázwa litomba na lisiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 3/04 lok. 1

“Bólinga Yehova, bino bayengebene na ye nyonso”

Ekaniseli ya liwa ya Yesu ekosalema na mokolo ya 4 Aprili

1 Eleki sikoyo bambula mingi, ntango Bakoministe bazalaki koyangela ekólo Ukraine, bakonzi bazalaki kolandela Batatoli, mingi mpenza na mikolo ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, mpo bakanisaki bakoyeba esika oyo bayanganaka. Likambo yango ezalaki ntango nyonso kobimisa mokakatano mpamba te bakonzi bayebaki dati oyo Ekaniseli ekokaki kosalema. Bandeko bazalaki kosala nini? Ndeko mwasi moko azalaki na ndako oyo ezalaki na eteni moko na nse ya mabelé oyo etondaki na mai. Lokola bakonzi bakokaki kokanisa te ete bato bakoki koyangana kuna, bandeko batongaki mwa etando moko ya mabaya likoló ya mai. Atako basengelaki kogumbama mpamba te ntaka ya plafɔ ná nse ekómaki moke, moto moko te atungisaki bango ntango basalaki Ekaniseli.

2 Bolingo ya bandeko na biso wana ya Ukraine mpo na Nzambe emonanaki polele na ndenge bazalaki kosala nyonso mpo na kotosa mobeko ya Yesu etali kokanisaka liwa na ye. (Luka 22:19; 1 Yoa. 5:⁠3) Soki tozali na mikakatano, tiká ete bandakisa ya ndenge wana elendisa biso mpe etinda biso tósala nyonso mpo na koyangana na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo ya 4 Aprili. Soki tosali bongo, tokomonisa ete tozali komiyoka lokola mokomi ya Nzembo oyo ayembaki: “Bólinga [Yehova], bino bayengebene nyonso na ye.”​—⁠Nz. 31:⁠23.

3 Salisá basusu ete bálinga Nzambe mingi: Bolingo mpo na Nzambe ezali kotinda biso tóbenga bato mosusu báyangana elongo na biso na Ekaniseli. Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali elendisaki mokomoko na biso asala liste ya bato oyo akobenga na Ekaniseli. Ozali kosala nyonso mpo na kobenga bato nyonso oyo bazali na liste na yo? Zwá ntango ya kolimbolela bango ntina ya molulu yango. Bakoki kondima koyangana soki oyebisi bango lisusu na esengo mpenza mokolo mpe ngonga oyo Ekaniseli ekosalema, to soki oyebisi bango ete okokende kozwa bango, soki likoki ezali.

4 Na esika ya Ekaniseli, salá nyonso opesa bato nyonso oyo bandimaki koya mbote, mpe salá ete bámiyoka malamu. Ndenge nini okoki kosalisa bango bákolisa bolingo mpo na Yehova? Zalá pene ya koyanola na mituna na bango. Mibongisá mpo na koyekola na bango Biblia soki likoki ezali. Bengisá bango na makita. Bankulutu bakotya likebi mingi mpenza na basakoli oyo batiká kosakola, oyo bakoyangana na Ekaniseli. Bakoki komibongisa mpo na kokende kotala basakoli yango mpe kolendisa bango bázongela lisusu milende na bango; bakoki kosalela mpe makambo oyo ekolobelama na lisukulu ya ekaniseli mpo na kolendisa bango.​—⁠Lom. 5:​6-8.

5 Ndenge oyo tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova: Soki tozali kokanisa na likabo ya lisiko, yango ekoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe mwana na ye. (2 Kol. 5:​14, 15) Motatoli moko oyo ayanganaka na Ekaniseli banda bambula mingi, alobaki boye: “Tozelaka Ekaniseli na esengo mpenza. Mbula na mbula, yango ezali kaka kokóma na motuya mingi. Eleki sikoyo mbula 20, nazali lisusu kokanisa ndenge natɛlɛmaki na ndako ya bibembe, nazali kotala ebembe ya Tata na ngai mpe mbala moko nakómaki na botɔndi makasi mpo na lisiko. Liboso, ezalaki kaka likambo oyo nayebaki yango na makanisi. Ɛɛ, nayebaki bavɛrsɛ nyonso oyo elobelaka yango mpe nayebaki ndenge ya kolimbola yango. Kasi, ezali kaka ntango nayokaki mpasi ya kokufela moto, nde motema na ngai etondaki na esengo mpo na makambo oyo tokozwa na nzela ya lisiko yango ya motuya mingi.​—⁠Yoa. 5:​28, 29.

6 Lokola mokolo ya Ekaniseli ya mbula oyo ekómi pene, zwá ntango ya kobongisa motema na yo mpo na yango. (2 Nta. 19:⁠3) Manyolá likoló ya mikapo na botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli, ndenge ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—⁠2004 mpe na Calendrier 2004. Bato mosusu basepelaka kotalela lisusu mokapo 112 tii 116 ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo na boyekoli na bango ya libota. Bamosusu mpe basalaka bolukiluki na mikanda mosusu ya moombo ya sembo mpe ya mayele. (Mat. 24:​45-47) Biso nyonso tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na likabo ya lisiko na mabondeli. (Nz. 50:​14, 23) Na bongo, tiká ete na eleko oyo ya Ekaniseli, tólanda kokanisa bolingo ya Yehova mpo na biso mpe tóluka ndenge ya komonisa ete tolingaka ye.​—⁠Mko. 12:30; 1 Yoa. 4:⁠10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto