Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/99 lok. 1
  • Ozali kosala na mokano?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali kosala na mokano?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tókolisa mosala na biso ya motuya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 9/99 lok. 1

Ozali kosala na mokano?

1 Yehova azali Nzambe oyo azali na mikano. (Yis. 55:10, 11) Tolendisami na komekola ye. (Ef. 5:1) Yango esengeli komonana na lolenge oyo tosalaka mosala na biso ya kosakola. Na yango, motuna oyo ebongi mpenza: “Ozali kosala na mokano?”

2 Mosala na yo ya kosakola ndako na ndako, ya kopesa litatoli ya libaku malamu, mpe ya kokabola mikanda, ezali na ntina mingi. Kasi omikundwela ete mokumba na biso esuki bobele na kosakola te kasi ezali mpe ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Nsima ya kolona mombóto ya solo ya Bokonzi, tosengeli kozonga mpe kosopela yango mai mpe kobatela yango mbala na mbala wana tozali kotalela Yehova ete akolisa yango. (1 Kol. 3:6) Tosengeli kosala mosala ya kozongela bato na likebi mpenza mpe kobanda koyekola na bango Biblia.

3 Omipesa lisusu mingi na mosala na yo ya kosakola: Ezalaka ntango nyonso likambo ya esengo soki okanisi makambo nyonso oyo osili kosala mpe okoki koloba ete: “Nakokisi makambo oyo nakanaki kosala.” Na 2 Timote 4:5 (NW), Paulo alendisi biso ete: ‘Kokisá mosala na yo malamu.’ Yango elimboli kosala lisusu milende makasi mpo na kozongela bato nyonso oyo basepelaki. Na programɛ na yo ya mosala ya kosakola ya pɔsɔ na pɔsɔ okoki kobongisa ntango oyo okobanda kozongela bato oyo basepelaki. Salá na mokano ya kobanda koyekola Biblia na bato oyo bazali na motema sembo. Yango esengeli kozala mokano na yo wana obimi na mosala ya kosakola.

4 Tuná basakoli ndenge bayokaki ntango bamonaki bayekoli na bango ya Biblia bazali kozwa batisimo na liyangani moko. Na ntembe te, basepelaki ndenge moko na bato oyo bazwaki batisimo to mbala mosusu basepelaki koleka kutu bango. Bakokisaki mokano moko ya ntina mingi! Mosakoli moko oyo ayekolaki na bato mingi amonisaki yango na maloba oyo: “Ntango bato mingi bazali kokóma bayekoli, yango ezali kopesa nzela ete basanzoli ya Yehova bákóma mingi lisusu. Yango elimboli bomoi mpo na baoyo bazali kondima mateya ya solo. Nalingaka koteya bato mosusu solo—yango ezali mosala moko malamu mpenza! . . . Mingi kati na baoyo bakómi kolinga Yehova bakómi baninga na ngai ya motema.”

5 Tókanisa naino na likoki oyo tozali na yango ya kosalisa moto akóma mosaleli oyo amipesi na Yehova! Yango ezali likambo ya esengo, boye te? Matomba motindo oyo ezwamaka soki tomityeli mokano na mosala na biso ya kosakola.—Kols. 4:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto