Baboti—Bópesa bana na bino ndakisa malamu
1 Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete: ‘Tata [na mama] ya moyengebeni bakosepela mingi.’ (Mas. 23:24, 25) Oyo nde lipamboli mpo na baboti oyo bapesaki bana na bango ndakisa malamu! Ndeko moko oyo azali na Komite ya Filiale na mboka moko alobaki mpo na baboti na ye ete: “Solo ezalaki mpenza bomoi na bango, mpe nasalaki nyonso ete bomoi na ngai mpe etambwisama na solo.” Eloko nini bana basengeli komona epai ya baboti na bango?
2 Bizaleli malamu mpe limemya mingi: Baboti bazali na mokumba ya kolakisa bana na bango bizaleli ya malamu. Bayekolaka bizaleli malamu, na maloba kaka te, kasi na makambo oyo tozali komona mpe komekola. Na yango, bizaleli nini bomonisaka? Bana na bino bayokaka bino koloba maloba lokola “limbisá ngai,” “nabondeli yo” mpe “mersi”? Bomonisaka limemya moko na mosusu na kati ya libota? Botyaka likebi ntango bato mosusu bazali koloba? Boyokaka ntango bana na bino balobaka na bino? Bomonisaka bizaleli oyo nyonso ya malamu ntango bozali na Ndako ya Bokonzi mpe ntango bozali bino moko na kati ya ndako?
3 Kozala makasi na elimo mpe na molende na mosala ya kosakola: Ndeko mobali moko oyo asali mbula koleka 50 na mosala ya ntango nyonso azali komikundola na maloba oyo: “Baboti na ngai bazalaki ndakisa malamu mpenza na oyo etali kosepela na makita mpe kosala na molende na mosala ya kosakola.” Ndenge nini bomonisaka bana na bino ete bozali komibanzabanza mpo moto mokomoko ya libota na bino azala makasi na elimo? Botángaka mokapo ya mokolo elongo? Bosalaka boyekoli ya Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ? Bana na bino bamonaka bino ntango botángaka Biblia mpe mikanda mosusu ya la Société? Makambo nini bana na bino bayokaka ntango bozali kobondela mpo na libota na bino? Bozalaka na masolo ya elimo elongo na bana na bino, masolo ya kolendisa matali mateya ya solo mpe lisangá? Bozalaka na mposa makasi ya koyangana na makita nyonso mpe kosangana na mosala ya kosakola libota mobimba?
4 Baboti, bókanisa malamu mpo na ndakisa oyo bozali kopesa bana na bino. Bósala ete yango ezala ndakisa moko ya malamu mpenza, mpe bana na bino bakokanisa yango bomoi na bango mobimba. Mwasi ya mokɛngɛli moko ya zongazonga oyo azali sikoyo na mbula koleka 70, alobaki na bolingo nyonso mpo na baboti na ye baklisto ete: “Nazali naino kozwa matomba na ndakisa malamu ya baboti na ngai baklisto, oyo bazalaki kolinga ngai mingi. Mpe nazali kobondela na motema mobimba ete nasala makasi mpo na komonisa botɔndi mpo na libula wana mpe kosalela yango malamu kino na bikeke nyonso oyo bizali koya.”