Mosala ya kosakola ezali kokesenisa biso na mangomba mosusu
1 Bato mingi bamitunaka boye: “Batatoli ya Yehova bakeseni na mangomba mosusu na nini?” Soki batuni yo motuna yango okoyanola ndenge nini? Mbala mosusu okoki kolimbola ete mateya na biso eutaka na Biblia. Kasi osilá kokanisa komonisa ndenge mosala na biso ya kosakola ekesenisaka biso na mangomba mosusu?—Mat. 24:14; 28:19, 20.
2 Na mikolo na biso, kaka mwa bato moke ya mangomba mosusu nde bakendaka koteya bato mosusu makambo ya lingomba na bango. Bakanisaka ete ekoki na bango kaka kotosa mibeko ya Leta, kozala na bomoi moko ya pɛto, to kozala na boboto epai na bato. Kasi, bamonaka te ete bazali na mokumba ya kosalisa bato mosusu báyekola makambo oyo Biblia elobi mpo na kobika. Ndenge nini biso tokeseni na bango?
3 Mosala na biso ya kosakola oyo tozali kosala na molende nyonso ekeseni mpenza na misala ya mangomba mosusu. Mbula koleka 100 eleki banda Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu na molende nyonso kino na nsuka ya mokili, ndenge baklisto ya liboso basalaki. Ntango tozali kosakola, mposa na biso ezali ete tósalisa bato mingi bázala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe.—1 Tim. 2:4; 2 Pet. 3:9.
4 Ndenge nini bato batalelaka yo? Oyebani lokola moto oyo asakolaka Liloba ya Nzambe na molende? (Mis. 17:2, 3; 18:25) Mosala na yo ya kosakola esalaka ete bato oyo bozalaka na bango kartye moko bámona ete lingomba na yo ekeseni mpenza na oyo ya bango? Oyebani lokola moto oyo azalaka na mposa makasi ya koyebisa bato mosusu elikya na ye? Obimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala? Tóbosana te ete tokesanaka na bato mosusu kaka na nkombo na biso te kasi mpe na ndenge oyo tozali kosala makambo oyo nkombo yango ezali kosɛnga—kopesa litatoli mingi mpo na Yehova.—Yis. 43:10.
5 Bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bato mosusu etindaka biso tókende kosakola. (Mat. 22:37-39) Yango wana, tosakwelaka bato mosusu nsango ya Bokonzi ntango nyonso oyo libaku emonani, ndenge Yesu na bantoma basalaki. Tiká tósakolaka nsango malamu na molende nyonso epai ya bato oyo balingi koyoka. Soki tosali bongo tokosalisa bato ya motema sembo ete ‘bámona bokeseni kati na . . . moto oyo azali kosalela Nzambe na moto oyo azali kosalela ye te.’—Mal. 3:18, NW.