Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/99 lok. 1
  • Nani akondima koyekola Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani akondima koyekola Biblia?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Tósalela mikanda na mayele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tosengeli kozala bateyi, bobele basakoli te
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 11/99 lok. 1

Nani akondima koyekola Biblia?

1 Mosakoli Amosa alobaki ete nzala ekoya na mokili ya Yisalaele, ‘nzala na kwanga te, kozanga na mai mpe te; ekozala nzala na koyoka maloba na Yehova.’ (Amo. 8:11) Ebongiseli ya Yehova ezali kokabola ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia na mokili mobimba mpo na bato oyo bazali na mposa ya mai mpe mposa ya bilei na elimo.

2 Kino sikoyo, tosili kobimisa buku Boyebi milio 70 mpe mwa buku Azali kosɛnga milio 91. Tozali kosepela ndenge mikanda yango ezali koteya solo malamu, na mindondo te. Nzokande, emonani mpenza ete ebele ya bato oyo bazali na mikanda na biso bayekoli naino Biblia elongo na biso te. Tokosala nini mpo na yango?

3 Mokanda nyonso oyo totikeli moto ezali kopesa nzela na boyekoli! Tótalela ndakisa ya mosakoli moko oyo alendisaki mwasi moko abanda koyekola Biblia mbala ya liboso oyo asololaki na ye. Mwasi yango andimaki mbala moko. Na nsima mwasi yango ayebisaki ye ete: “Ozali moto ya liboso oyo alendisi ngai nayekola Biblia.” Na teritware na bino, bato boni oyo bazali na mikanda na biso bakoki koloba lokola mwasi yango? Mokanda nyonso oyo totikeli moto ezali kopesa biso nzela ya kozongela ye mpe kobanda boyekoli ya Biblia.

4 Lokola tokutanaka mbala mingi na bato oyo bazali na mikanda na biso, ndenge nini tokoki kolendisa bango báyeba makambo oyo ezali na kati ya mikanda yango? Ndeko mwasi moko atunaki mwasi oyo bazalaki kosolola na ye soki azali na motuna moko ya kotuna mpo na Biblia, kasi mwasi yango azongiselaki ye ete: “Te.” Ndeko mwasi yango alɛmbaki te, alobaki na ye ete: “Na ntembe te ozali na mituna.” Mwasi yango atunaki mituna, mpe babandaki koyekola. Mpo na nini te kotuna moto oyo ozali kosolola na ye soki akosepela koyeba eyano ya Biblia na motuna moko to likambo moko oyo ezali kotungisa ye? Osengeli komibongisa mpo na kotuna motuna moko oyo ekoki kobenda likebi soki moto oyo bozali kosolola na ye azali na motuna te. Masolo ya ndenge wana ekopesa nzela bóyekolaka Biblia mbala na mbala.

5 Ntina mpenza ya mosala na biso ya kosakola ezali ya koyekola Biblia na bato. Lokola toyebi te nani akondima koyekola, tókakatana te kolendisa moto nyonso oyo tokutani na ye ete ayekola Biblia. Yebisá Yehova likambo yango na libondeli, mpe salá ndenge ozali kosɛnga na mabondeli na yo. Okomona mpe ete moto mosusu oyo osɛngi ye ete oyekola na ye Biblia, akondima mbala moko!—1 Yoa. 5:14, 15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto