Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/00 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 5/00 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokozala na mwa buku Azali kosɛnga mpo na kopesa bato oyo bakosepela, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie​—Comment le découvrir?; mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; mpe Un livre pour tous.

◼ Tozali kosɛnga na bakomeli ete bákomaka ntango nyonso “S-14” likoló ya anvɛlopɛ oyo ezali na komande ya mikanda S-14 mpo na lisangá. Esengeli te kotya mokanda mosusu na kati ya anvɛlopɛ yango.

◼ Tozali lisusu koyebisa basakoli nyonso ete basengeli te kosalela adrɛsi ya biro mpo na kotinda mikanda na bango moko. Yango etaleli mpe nkoma nyonso mpe mikanda nyonso oyo tolingi kotinda mpo na kopesa litatoli epai ya bato oyo bazali kosepela na solo, baoyo bazalaki na bandako na bango te to baoyo bafandaka na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokende kokutana na bango. Ntango ozali kopesa litatoli na nzela ya nkoma, salelá adrɛsi na yo moko to adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi ya lisangá na bino. Tosɛngi bino ete bósalela adrɛsi ya biro te.

◼ Mokɛngɛli mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke nsima. Nsima ya kotalela kɔnti, basengeli koyebisa yango na lisangá ntango bakotánga lapolo ya mbala ya nsima.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Swahili: Jésus: qui est-il? (T-24).

◼ Mikanda tozali na yango:

Swahili: Bilimu ya bakufi: Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto