Biyano na mituna na bino
◼ Ndenge nini basaleli na misala bakoki kosunga baboti ete básalisa bana na bango básalaka mobulu te na makita?
Bana bazalaka mobulu mingi, bakokaka te kofanda kaka esika moko ntango molai. Na nsima ya likita, bana babimisaka makasi na bango nyonso mpo na kokimakima mbango mpe kolanda bana mosusu na kati ya Ndako ya Bokonzi to na bisika mosusu ya makita, na esika batɛlɛmisaka mituka to na balabala. Kasi, Masese elobi solo ete, ‘mwana oyo atikami epai na ye moko akoyokisa baboti na ye nsɔni.’—Mas. 29:15.
Likambo ya mawa, bana batindikaki bandeko na biso mosusu ya mibange ntango bazalaki kokima mbango, bakweisaki bango mpe bazokaki bampota ya minene. Yango epesaki mpasi mingi mpe esɛngaki kobimisa mbongo, ezala baboti to lisangá, mpo na likambo oyo bakanaki te. Mpo na kobatela bana mpe bato mosusu, esengeli te kotika bana ete bákimaka mbango mpe básakanaka na kati ya Ndako ya Bokonzi to na libanda na yango.
Biblia epesi baboti mokumba ya koteya bana na bango bámonisa limemya mpo na bisika na biso ya losambo. (Mos. 5:1a) Ntango tozali na makita ya lisangá, na mayangani ya mike to ya minene, bandeko mibali oyo bapesaka bato bisika ya kofanda, bazali na mokumba ya kokeba ete “makambo nyonso masalema na motindo mozali na nsɔni te” mpe ete “mobulu ezala te.” (1 Kol. 14:40; Kols. 2:5) Basengeli ntango nyonso kokɛngɛla liboso makita ebanda, ntango makita ezali kosalema, mpe na nsima ya makita. Basengeli kokɛngɛla ezala na kati ya Ndako ya Bokonzi to na libanda na yango. Soki mwana azali kokima mbango to akómi komonisa motó makasi, mosaleli na misala akoki, na boboto nyonso, kopekisa mwana yango mpe kolimbolela ye ete kosala bongo ezali malamu te. Esengeli mpe koyebisa baboti ya mwana likambo yango na boboto nyonso mpe koyebisa bango ntina ya kokɛngɛla mwana na bango. Baboti basengeli kondima kosala oyo esengeli.
Toyebi ete na bantango mosusu bana mike bakoki kolela mpe kotya mobulu ntango makita ezali kosalema. Lokola basaleli na misala basengeli kokóma na Ndako ya Bokonzi miniti 20 liboso ete makita ebanda, bakoki kotika ata milɔngɔ mibale ya nsima mpo na baboti oyo bakolinga kofanda wana na bana na bango ya mike. Biso nyonso tosengeli kotikela bango bisika wana na boboto.
Soki mwana azali kotya mobulu, baboti basengeli kopekisa ye. Soki baboti basali eloko te mpe mobulu yango ekómi kolongola likebi ya bato mosusu na makita, mosaleli na misala moko asengeli, na boboto nyonso, kosɛnga moboti ete abima na mwana libanda. Soki tobɛngi bato oyo basepeli na solo na bana na bango na makita, tosengeli kofanda na bango esika moko mpe soki bana na bango bazali kolela to kotya mobulu, tokoki kosɛnga bango ete tósalisa bango.
Epesaka esengo na komona bana ya mibu nyonso na kati ya Ndako ya Bokonzi mpe komona bazali na etamboli malamu na kati ya ndako ya Nzambe. (1 Tim. 3:15) Bakumisaka Yehova na ndenge bazali komonisa limemya mpo na bibongiseli oyo azwi mpo na losambo mpe bato nyonso na kati ya lisangá bazali kosepela na bango.