Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/00 nk. 2-3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 6/00 nk. 2-3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie​—Comment le découvrir?; mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; mpe Un livre pour tous. Sɛtɛmbɛ: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?

◼ Tozali kosɛnga na masangá oyo etalelaka mikanda na Ndako ya Bokonzi ete bákomaka ntango nyonso “coordinatrice” na bademande na bango ya mikanda (S-14).

◼ Tobongisaki komande ya lisangá mokomoko mpo ete banda na mokolo ya 1 Yanuali 2000, mosakoli mokomoko akoka kozwa zulunalo na ye moko. Kasi tozali kozwa bakomande ya masangá mingi oyo bazali kosɛnga ete bábakisela bango bazulunalo mingi. Masangá mosusu kutu bazali kosɛnga ete bábakisela bango bazulunalo mbala mibale to mbala misato koleka ndenge bazwaka. Tolingi koyebisa bino ete kobakisama ya bazulunalo ekosalema mokemoke. Soki lisangá moko esɛngi motango monene koleka ya bazulunalo, biro ekokitisa yango. Soki lisangá moko ezali na bantina malamu ya kosɛnga bábakisela bango bazulunalo mingi, basengeli kokoma mokanda mpo na koyebisa yango.

◼ Mpo na koyeisa makambo pɛpɛlɛ mpe mpo na kobebisa mbongo mingi te, tolingi koyebisa bino ete tokondima lisusu abonema te. Tokondima bobele abonema oyo esɛngami mpo na bazulunalo oyo ezali na lokota oyo elobamaka na teritware na biso te. Bato mingi oyo basepelaka kozwa bazulunalo na biso mbala na mbala, ezali baoyo bayekolaka Biblia mpe mbala mosusu bato oyo bayanganaka na makita ya lisangá. Soki moto moko alingi kozwa bazulunalo na biso mbala na mbala, luká koyeba soki azali mpenza kosepela na mateya ya solo. Soki ezali bongo, mbala mosusu okoki kozwa ekateli ya kokɔtisa nkombo na ye na molɔngɔ ya bato oyo otikelaka bango bazulunalo mbala na mbala, yango ekopesa yo nzela ya kosalisa ye ete akolisa lisusu mposa na ye mpo na mateya ya solo. Tozali lisusu koyebisa bino ete basakoli nyonso basengeli kozwa bazulunalo na bango na nzela ya lisangá na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto