Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/00 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Yuli
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 6/00 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 12 Yuni

Loyembo 136

Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Mosala na bino ezali mpamba te.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1996 lok. 32.

Min. 22: Tóbanda koyekola na bato na mwa buku Azali kosɛnga. Lisukulu, ekolobela makambo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 1999 lok. 6. Bongisá elakiseli moko mpo na komonisa makanisi oyo epesami na paragrafe 6. Sɛngá na mosakoli moko to basakoli mibale báyebisa na mokuse ndenge basalaki mpo na kobanda koyekola Biblia na bato, báyebisa ndenge basalaki mpo moto andima koyekola mpe milende oyo basalaki mpo boyekoli yango esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ.

Loyembo 209 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Yuni

Loyembo 14

Min. 12 :Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Soki buku Mituna oyo bilenge batunaka to Votre jeunesse ezali na lisangá na bino, monisá na elakiseli ndenge tokoki kosalela babuku yango malamu na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza oyo banakelasi bazali na konje, mpo ete bilenge mingi bazalaka na bandako na bango.

Min. 8: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko.

Min. 25: “‘Nakoyeba yango ndenge nini soki moto alimbweli ngai ntina na yango te?’” Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akosala lisolo oyo na mituna mpe biyano. Esengeli kotánga paragrafe mokomoko na mongongo makasi, mpe kotánga mikapo oyo ezali na paragrafe 3, 4, mpe 7. Ntango akokóma na paragrafe 6, akolimbola ete mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali na mokumba ya kozwa ekateli soki esengeli koyekola lisusu na bato mosusu oyo bazwá batisimo to te.​—Talá lisolo Biyano na mituna na bino oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1998.

Loyembo 89 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Yuni

Loyembo 39

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni. Lobelá mikanda oyo tokokabola na sanza ya Yuli. Lakisá mwa babuku ya kala oyo ezali na lisangá na bino, mpe monisá na mokuse ntina ya mwa babuku yango mokomoko. Bongisá malamumalamu elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa mwa buku moko na mosala ya kosakola.

Min. 17: “‘Bózala mabɔkɔ makasi te, bókabelaka bato mosusu.’” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá mpe makambo minei oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1996, lok. 29-30, oyo ezali komonisa “Bantina oyo topesaka makabo.”

Min. 18: Yebá kopesa eyano. (Kols. 4:6) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Osalaka nini ntango okutani na moto moko oyo abimisi ntembe na likambo moko oyo ezali na kati ya Biblia te? Mbala mingi, buku Comment raisonner esalisaka biso, epesaka biso makanisi oyo ebongi mpe emonisaka biso ndenge ya kopesa eyano ya mayele. Na ndakisa, atako tomonaka liwa lokola monguna oyo akolongolama na nzela ya lisiko ya Klisto, bato mosusu bandimaka ete eloko moko te ekoki kolongola liwa, bakoki kutu kondima liteya ya lokuta oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala. Lobelá biyano oyo epesami na buku Comment raisonner na molɔngɔ oyo bakomi “Si quelqu’un vous dit” oyo ezali na lok. 258-259 mpe 309. Lendisá moto nyonso ete azalaka na buku na ye na mosala ya kosakola.

Loyembo 44 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Yuli

Loyembo 213

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá na basakoli oyo babandaki koyekola Biblia na bato na mwa buku Azali kosɛnga báyebisa ndenge basalaki.

Min. 15: “Ndenge nini makita mpo na mosala ya kosakola esengeli kotambwisama?” Lisolo kati na mokɛngɛli na mosala ya kosakola mpe motambwisi moko ya boyekoli ya mokanda, ekozala malamu ete azala mosaleli na misala oyo akokisaka mosala na ye malamu mpenza. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akoki mpe kolobela makanisi mosusu ebongi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Novɛmbɛ 1994, lok. 3. Akomonisa ete, ntango tozali kosala likita ya mosala ya kosakola, ezali malamu kozongela makambo mosusu oyo tokoki kosalela, oyo elobelamaki na likita ya mosala oyo euti koleka mpe akopesa makanisi oyo bandeko bakoki kosalela ntango bakobima na mosala ya kosakola mokolo yango. Salá mwa elakiseli mokuse mpe ezangi mindɔndɔ oyo ekomonisa ndenge ya kosala lisolo na Biblia, ekosalisa biso tósangisa makanisi na biso malamu mpe tóloba yango polele. Ntango azali kokabola bato mpo na kobima na mosala ya kosakola, ndeko oyo azali kotambwisa likita asengeli kolanda ndakisa ya Yesu ndenge atindaki bayekoli na ye mibale mibale. Esengeli kopona nkulutu moko to mosaleli moko na misala oyo azali mpenza na makoki mpo na kotambwisa likita ya mosala, yango ekosala ete likita yango etambwisama malamu mpe eteya mpenza basakoli ndenge ya kosakola.

Min. 20: Kolanda toli ya Biblia ebongisaka bomoi ya libota. Lisolo kati na bandeko mibali mibale, euti na makambo mwambe oyo ezali na buku Comment raisonner, lok. 229-230. Limbolá ntina ya kosalisa bato oyo bazali koyekola Biblia báyeba ete mpo libota ezala na esengo, basengeli koyeba mpe kolanda toli oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Salelá liteya 8 ya mwa buku Azali kosɛnga, bongisá elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kosala yango. Mabota oyo ezali kolanda toli ya Biblia bakómaka na boyokani malamu mpe bazwaka esengo mingi, balinganaka mpe bazalaka na bomoko. Lobelá makambo oyo ezali na buku Bolamu ya libota na mokapo 13, par. 1, 21-22.

Loyembo 51 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto