Oyebaka ntina oyo Yehova azalaka motema pɛtɛɛ?
1 Soki Yehova amonisaki motema pɛtɛɛ na ye te na boumeli ya mbula 10, 20 to na boumeli ya bambula mingi oyo esili koleka, mpo na kopesa nzela ete litatoli epesama lisusu mingi, olingaki koyeba solo? Tozali mpenza na botɔndi na ndenge apesi nzela ete bato mingi lisusu “bákóma na kobongwana na motema.” Nzokande, mokolo monene ya kosambisa ya Yehova “ekoya lokola moyibi.” (2 Pet. 3:9, 10) Yango wana, esengeli te kotalela motema pɛtɛɛ ya Nzambe na ndenge ya mabe lokola nde azali koumela mpo na kosukisa ebongiseli mabe ya ntango oyo.—Hab. 2:3.
2 Yokelá bato mawa: Motema molai ya Yehova eleki bososoli na biso. Tosengeli te kobosana ntina na yango. (Yona 4:1-4, 11) Yehova amonaka mpasi oyo bato bazali na yango mpe ayokelaka bango mawa. Yesu ayokaka mpe ndenge yango. Lokola azalaki koyokela bato oyo azalaki koteya mawa, yango wana alingaki ete mosala ya kopalanganisa nsango malamu epanzana mpenza mpo ete bato mingi bázala na libaku malamu ya kozwa bomoi ya seko.—Mat. 9:35-38.
3 Ntango makambo ya nsɔmɔ mpe makama esalemaka, toyokaka mawa na mitema na biso mpo na bato oyo bayebi solo te, boye te? Lelo oyo bato bazali lokola “bampate bazangi mobateli” wana bazali koluka ndenge ya kosilisa bampasi ya mokili mpe bazali koluka koyeba ntina ya bampasi yango. (Mko. 6:34) Soki tozali kosakola nsango malamu na molende mpenza, tokobɔndisa baoyo basili kobongisa motema na bango mpo na bomoi ya seko mpe tokomonisa ete toyebi ntina oyo Yehova azalaka motema pɛtɛɛ.—Mis. 13:48, NW.
4 Mosala na biso esengeli kosalema na lombangu: Na mbula eleki bato 323 439 bazwaki batisimo mpe bato koleka milio 14 bayanganaki na Ekaniseli. Elikya ezali ete bato mingi lisusu bakobika ntango ebongiseli oyo ekobomama, boye te? Toyebi te soki bato boni bakozala na kati ya “ebele monene.” (Emon. 7:9) Toyebi mpe te soki mosala na biso ya kosakola ekoumela lisusu ntango boni. Kasi Yehova ye moko ayebi. Nsango malamu ekosakolama kino ntango oyo esepelisi ye, “mpe bongo nsuka ekoya.”—Mat. 24:14.
5 Ntango oyo etikali ezali mokuse, mpe mokolo ya Nzambe ezali kobɛlɛma mpenza. (1 Kol. 7:29a; Ebe. 10:37) Na ntembe te, “lobiko na biso ekómi mpenza penepene koleka ntango oyo tokómaki bandimi.” (Lom. 13:11, NW ) Tiká ete tókanga ntina oyo Nzambe azali motema pɛtɛɛ. Na yango, tósakola na etingya mpo ete bato mingi oyo bazali na mposa ya bosembo bákoka kozwa litomba na mawa monene ya Yehova.