Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/00 lok. 1
  • “Obundaka etumba malamu ya kondima”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Obundaka etumba malamu ya kondima”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • ‘Tózala bazwi na misala ya malamu’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Kobunda ezali malamu?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Tómipesa mingi na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 8/00 lok. 1

“Obundaka etumba malamu ya kondima”

1 Ntoma Paulo apesaki Timote toli ete ‘abundaka etumba malamu ya kondima.’ (1 Tim. 6:12) Paulo ye moko amonisaki ete azalaki kobunda etumba yango na bomoi na ye. Pene na nsuka ya bomoi na ye, andimaki mpenza ete abundaki etumba malamu. (2 Tim. 4:6-8) Ntango nyonso azalaki kosala mosala na ye na molende mpe na mpiko. Soki tolandi ndakisa na ye, biso mpe tokoki kondima mpenza ete tozali kosala nyonso oyo tokoki na etumba oyo tozali kobunda mpo na kondima na biso ya boklisto.

2 Salá lisusu milende: Paulo asalaki makasi na mosala ya kosakola. (1 Kol. 15:10) Biso mpe tosengeli kosala makasi ntango tozali koluka bato nyonso oyo bazali kosepela na solo na kati ya teritware na biso. (Mat. 10:11) Mpo na kokutana na bamosusu, ekoki kosɛnga kobima na ntɔngɔ mpo na kopesa litatoli na bato oyo tozali kokutana na bango na balabala. To ekoki kosɛnga kosakola na mpokwa mpo na kokutana na bato ntango basili kozonga na bandako na bango.

3 Esɛngaka komityela mokano mpe kosala makasi mpo na kokokisa yango mpe kozala na programɛ ya malamu mpo na kokóma na ngonga oyo esengeli na likita ya mosala ya kosakola oyo ebongisami na etuluku ya boyekoli ya mokanda. Na ndakisa, na bawikende, mpo na bandeko mosusu ya libota ya Betele, esengelaka ngonga moko mpo ete bákóma na masangá na bango mpo na kobima na mosala ya kosakola mpe ngonga moko lisusu mpo na kozonga na Betele. Lisusu, tosepelaka na basakoli mpe na mabota mosusu ya lisangá na biso baoyo, atako bafandaka mosika, kasi bakómaka na ngonga malamu na makita. Ebongi tómekola ndakisa wana ya molende mpe tómibongisaka malamu.

4 Tosengeli koyoka mposa makasi ya kozongela bato nyonso oyo basepeli na solo. Ata ntango tolakisi moto zulunalo na balabala to topesi litatoli ya libaku malamu, tosengeli kosala makasi mpo na kozwa adrɛsi ya moto yango to nimero na ye ya telefone. Na nsima tokoki kokende kotala ye mpo na kokolisa mposa na ye mpo na solo mpe kobanda koyekola na ye Biblia.

5 Bimaká ntango nyonso na mosala ya kosakola: Paulo azalaki ntango nyonso na molende mpe azalaki kosala mingi na mosala ya kosakola. (Lom. 15:19) Ezali boni mpo na yo? Obimaka pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola? Banda sanza oyo ebandi, osi obimi na mosala ya kosakola? Batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli kokeba ete mosakoli nyonso oyo azali na etuluku na bango ya boyekoli ya mokanda abima na mosala ya kosakola na sanza ya Augusto. Bakosalisa yo ete obima na mosala ya kosakola.

6 Soki tomekoli ndakisa ya Paulo, mpo na kosakola nsango malamu na molende, tokolanda “kobunda etumba malamu ya kondima.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto