Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/00 nk. 3-4
  • Ozali mpenza kozwa litomba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali mpenza kozwa litomba?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Makita oyo ‘elendisaka na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu’
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Koyangana elongo mpo na losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Makita epesaka bilenge matomba
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 8/00 nk. 3-4

Ozali mpenza kozwa litomba?

1 Bato mingi lelo oyo balingaka koyeba ndenge nini bakoki kosilisa mikakatano na bango mpe kozala na bomoi moko ya malamu. Bamipesaka na kotánga babuku oyo epesaka toli mpo na kozala na bomoi malamu to bakendaka epai ya bato to bibongiseli oyo eteyaka ndenge ya kozala na bomoi ya malamu. Mbala mosusu bato mosusu bakoki komonisa mwa matomba oyo basili kozwa mpo na yango. Kasi, soki totali ndenge bomoi ya bato ezali lelo oyo, tokoki mpenza koloba ete mateya oyo bato bateyaka esalisi bato mingi bázala na bomoi ya kimya mpe ya malamu? Ezali mpasi mpo na kondima yango!​—1 Kol. 3:18-20.

2 Nzokande, Mozalisi na biso azali kopesa mateya ofele, mateya yango ememaka bolamu mpenza epai ya bato nyonso oyo balingi koyoka yango. Yehova alingi ete moto nyonso azwa litomba na mateya oyo ye azali koteya. Lokola azali na bolingo, apesi Liloba na ye lipemami mpo na kotambwisa bato na nzela oyo ezali sembo, mpe apesi nzela ete nsango malamu ya Bokonzi na ye esakolama na mabele mobimba. (Nz. 19:7, 8; Mat. 24:14; 2 Tim. 3:16) Mpo na kozala na bomoi ya malamu, esengeli kotya likebi na mibeko ya Yehova.​—Yis. 48:17, 18.

3 Toli ya Yehova eleki na mosika toli nyonso oyo tokoki kokuta na mikanda ya toli to myango nyonso oyo bato bapesaka mpo na kozala na bomoi malamu. Tokozwa lisalisi ya solosolo mpe matomba oyo ekoumela ntango molai soki tozali kosalela bibongiseli ya Yehova ndenge yango emonisami na Liloba na ye mpe soki tozali kosala ndenge ebongiseli na ye ezali koteya biso.​—1 Pet. 3:10-12.

4 Zwá matomba na makita ya lisangá: Lelo oyo, Yehova azali komonisa ete alingi mpenza koteya biso banzela na ye, mpe tokozwa litomba na yango soki tozali kotya likebi na mateya na ye. Makita mitano oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ emonisaka mpenza ete Yehova azali, na bolingo nyonso, komibanzabanza mpo na biso. Ntango tokendaka na makita ya lisangá, boyebi na biso mpo na Nzambe ebakisamaka. Toyekolaka ndenge tokoki komibatela mpo tókwea na makambo mabe te wana tozali kobɛlɛma na Yehova. Na ndenge yango tokokola na elimo.

5 Esuki wana te. Na makita ya lisangá, tozali na likoki ya ‘kofungola mitema.’ (2 Kol. 6:13, NW ) Yango etali mpe koluka koyeba bandeko mosusu na kati ya lisangá. Tozwaka matomba na kolendisana, ndenge ntoma Paulo akomaki yango na mokanda na ye epai ya Baloma. (Lom. 1:11, 12) Ntango akomelaki Baebele, apesaki toli makasi epai ya baoyo bakolisaki ezaleli ya kokima kozala esika moko na bandeko na bango baklisto.​—Ebe. 10:24, 25.

6 Mpo na kosepela mpenza na bomoi, esengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya bato mosusu. Tolendisami ete tóluka ndenge oyo tokoki kosala mpo ete bato mosusu mpe básepela. Na yango, makita na biso ya boklisto ezali mpo na bolamu na biso moko mpe mpo na bolamu ya bato oyo bakómi mpo na biso baninga malamu. Eloko oyo esɛngami epai na biso, ezali ete tópesaka biyano na esengo mpenza.

7 Ntoma Paulo alobelaki mpe likambo motindo yango ntango apesaki Timote toli ete: “Omikembisa yo moko mpo na bizaleli na moto na Nzambe.” (1 Tim. 4:7) Tokoki komituna boye: ‘Nazali komikembisa? Nazali koyekola ndenge ya kozwa matomba na makambo oyo nazali koyoka na makita ya lisangá?’ Eyano na biso ekozala ɛɛ, soki tozali kotya likebi na makambo oyo tozali koyoka na makita mpe soki tozali kosala makasi ya kosalela makambo oyo tozali koyekola. Ntango bandeko bazali koteya, tosengeli te komona bobele bango, kasi tosengeli kozala na miso ya kondima mpe komona na maloba na bango ete ezali Yehova, Molakisi Monene ya basaleli na ye, nde azali koteya biso.​—Yis. 30:20.

8 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala: Ntina ya makita mibale oyo, ezali ya kosalisa biso tókokisa malamu mosala ya boklisto. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekokisaka mpenza ntina yango. Banakelasi balakisamaka mpe bazwaka toli mbala na mbala na eteyelo yango. Ozali na libaku malamu ya komonisa ndenge ozali kokola mpo na koyeba koloba liboso ya bato mingi mpe kokóma moteyi ya Liloba ya Nzambe. Kasi mpo na kozwa mpenza litomba na eteyelo yango, osengeli kokomisa nkombo na yo, kozala na likita yango, kosalaka mikumba mbala na mbala, mpe kotya motema na yo na mikumba oyo bazali kopesa yo na eteyelo yango. Soki ozali kondima mpe kosalela toli oyo bazali kopesa yo na eteyelo yango, okokola malamu mpenza na elimo.

9 Likita ya Mosala eteyaka biso ntina ya mosala ya kosakola oyo baklisto basalaka mpe emonisaka biso ndenge tokoki kosala mosala ya kozalisa bayekoli. Yo na libota na yo bozwaka litomba na makambo oyo eteyamaka na makita yango mibale? Babalani mibale balobaki ete: “Mokolo moko na Likita ya Mosala, toyokaki ete tosengeli kotángaka mokapo ya mokolo na kati ya libota. Kala tozalaki kosala yango te, kasi sikoyo tobandi kosala yango.” Litomba nini bazwi? Balobi ete: “Tomoni ete tokómi kosolola malamu na ntango ya kolya. Makambo ya koswana ntango tozali kolya ezali lisusu te.” Bana mike bazwaka mpe litomba na makita? Ɛɛ. Mama ya libota yango alobi boye: “Emonani polele ete bana na biso basimbaka mpenza makambo oyo elobamaka na makita. Mokolo moko toyokaki mwana na biso ya moke, oyo azali na mibu 6, azali kobuka lokuta. Kaka na pɔsɔ yango, na makita, ‘lisolo mpo na koteya lisangá’ elobelaki likambo ya kobuka lokuta. Mwana na biso atalaki tata na ye na nsɔni nyonso, mpe abatamaki na kiti na ye. Ye moko azwaki liteya, mpe azongelaki lisusu likambo yango te.”

10 Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela alobi ete asepelaka mingi na malako oyo epesamaka na Likita ya Mosala mpo na ndenge ya kobongisa lisusu mosala na biso. Mpo na nini? Alobi ete: “Nakangamaka kaka na lolenge moko ya kosakola. Na bantango mosusu nakanisaka ete makanisi oyo epesami na Mosala na biso ya Bokonzi ekobimisa litomba moko te. Kasi na Likita ya Mosala, ntango nayokaka ete tosengeli komeka yango, nazwaka makasi ya kosalela makanisi yango. Yango esalaka ete nasepela na mosala ya kosakola!” Bapɔsɔ mingi nsima ya komeka toli oyo ezalaki kolendisa likambo ya kobanda koyekola na moto Biblia na mbala ya liboso oyo osololi na ye, ndeko mwasi yango abandaki mbala moko koyekola Biblia na elenge mwasi moko oyo azalaki kobondela mpo na kozwa lisalisi.

11 Ntango oyoki lisukulu moko oyo emonisi toli ya Biblia na makambo oyo moto ye moko asengeli kopona oyo amoni malamu, omonaka ete ezali Yehova nde azali koloba na yo? Ndeko mobali moko azalaki na likanisi yango. Alobaki ete: “Eleki mikolo mingi te, na likita moko toyokaki lisolo moko oyo ndeko moko asalaki mpe alobelaki lolenge ya kominanola ya malamu mpe ya mabe mpo na baklisto. Nazalaki kolinga mingi kotala masano ya bitumba na televizyo. Kasi na nsima ya likita wana, namonaki ete masano yango ezali na molɔngɔ ya makambo ya kominanola oyo ezali mabe mpo na baklisto. Yango wana, natalaka yango lisusu te.” Ya solo, atako ndeko oyo akolisaki mposa makasi mpo na masano ya mobulu, andimaki na komikitisa nyonso toli ya Yehova.​—Nz. 11:5.

12 Lisukulu ya bato nyonso, Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe Boyekoli ya Mokanda: Lisukulu ya bato nyonso oyo toyokaka pɔsɔ na pɔsɔ elobelaka masolo ndenge na ndenge ya Biblia. Makambo nini oyekolaka na masukulu yango? Mobali moko moklisto alobaki boye na ntina na matomba oyo azwaki: “Lisukulu moko elobelaki mbuma ya elimo. Molobi apesaki ndakisa na ye moko; mpo akoka komonisa mbuma yango nyonso, azalaki kopona mbuma moko mpe kosala makasi mpo na komonisa yango na boumeli ya pɔsɔ mobimba. Na nsuka ya pɔsɔ, azalaki kokanisa ndenge oyo asalaki mpo na komonisa mbuma yango na makambo nyonso ya bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Na nsima, na pɔsɔ oyo elandi azalaki kosala mpe bongo mpo na mbuma mosusu ya elimo. Nasepelaki na ndakisa yango, ngai mpe nabandaki kosala bongo.” Ndeko oyo asalelaki mpenza malamu makambo oyo ayekolaki!

13 Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eteyaka biso tósalela mitinda ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na biso. Yango esalaka ete makanisi na biso mpe motema na biso ezala na kimya atako tozali kokutana na mitungisi ya bomoi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe esalisaka biso tólanda ndenge mateya ya solo ezali kobongisama. Na ndakisa, tozwaki mpenza litomba na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1999 na masolo oyo ezalaki na motó ya likambo: “Makambo yango esengeli koya,” “Tiká ete motangi asosola,” mpe “Bólala mpɔngi te, bómipesa na mosala!” Nini esimbaki motema na yo na boyekoli ya makambo yango? Ozali komonisa na misala na yo ete ozali kotosa likebisi ya Yesu mpo na mikolo oyo ezali koya? Osili komibongisa mpo na komekama oyo ezali liboso ntango tokomona “mbindo-na-libebisi ezali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ”? (Mat. 24:15-22) Makambo oyo ozali kokana kosala na bomoi na yo mpe ndenge bomoi na yo ezali, emonisaka mpenza ete likambo ya ntina mingi mpo na yo ezali ya kokumisa nkombo ya Yehova, kasi ya konduka biloko ya mosuni te? Na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli toyekolaka ndenge tokoki kozwa matomba lelo oyo, boye te?

14 Tókanisa naino makambo mingi oyo toyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ na Boyekoli ya Mokanda. Sikoyo tozali koyekola mokanda ya Danyele oyo ezali na Biblia. Na boumeli ya sanza minei oyo toyekoli buku yango, tomoni ete kondima na biso ezali kokola pɔsɔ na pɔsɔ, boye te? Lokola Danyele, mosakoli oyo Yehova alingaki mingi, biso mpe tozali kolendisa kondima na biso mpo tókoka koyika mpiko.

15 Yehova azali koteya biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu: Soki tozali kotya likebi na mibeko ya Nzambe, tokokima makambo mingi oyo ekoki komemela biso mpasi. Lisusu, yango ezali kosala ete tózala na bomoi ya esengo. Lokola tozali kolanda litambwisi ya Yehova tokómi kosala mosala na ye, kasi tozali batali mpamba te. Mpe baoyo bazali kosala mosala ya Nzambe bazali bato ya esengo.​—1 Kol. 3:9; Yak. 1:25.

16 Kanisá ndenge oyo okoki kosalela makambo oyo ozali koyoka na makita ya lisangá. (Yoa. 13:17) Salelá Nzambe na esengo, na motema na yo mobimba. Esengo na yo ekotondana. Bomoi na yo ekokóma malamu mpe ekozala na ntina koleka. Ya solo, okozwa mpenza litomba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto