Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/00 lok. 2
  • Ndenge ya kotalela mikanda na Ndako ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kotalela mikanda na Ndako ya Bokonzi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 8/00 lok. 2

Ndenge ya kotalela mikanda na Ndako ya Bokonzi

Masangá nyonso oyo eyanganaka na Ndako ya Bokonzi moko, esalelaka libombo ya mikanda moko. Yango elingi koloba ete “Lisangá oyo etalelaka mikanda” ekobanda kotinda sanza na sanza komande ya mikanda na Biro, na esika ete lisangá mokomoko etindaka komande na yango. Ebongiseli oyo etaleli te lisangá oyo eyanganaka yango moko na Ndako ya Bokonzi.

Lisangá mokomoko etalelaka yango moko “Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba​—Matai 24:14,” kasi ezali te lisangá oyo etalelaka mikanda na Ndako ya Bokonzi nde esengeli kosala yango. Lisangá mokomoko esengeli kozwa mbongo ya makabo na nsuka ya likita nyonso. Na nsima bakotinda makabo yango na Biro ndenge esalemaka.

Ndeko oyo atalelaka mikanda azali na mokumba ya kosɛnzɛla ete lisangá ezala na mikanda mingi oyo bandeko basengeli na yango mpo na makita mpe mpo na kokabola na mosala ya kosakola sanza na sanza. Asengeli mpe kosɛnzɛla ete mikanda oyo tobengaka articles sur demande spéciale, etondana pambapamba te na libombo ya lisangá. Sanza na sanza, akosala evantɛrɛ ya mikanda nyonso; akosalela formilɛrɛ État mensuel du stock des publications (S-28). Bobele ntango bazwi mikanda, asengeli kotya yango mbala moko na libombo ya mikanda.

Tozali kozwa nkoma mpo na ebongiseli ya sika oyo etali ndenge ya kotalela mikanda. Ndeko oyo atalelaka mikanda mpe mosungi na ye bakokutana elongo na komite ya mosala ya lisangá mokomoko oyo eyanganaka na Ndako ya Bokonzi moko mpe bandeko nyonso oyo batalelaka mikanda mpe bazulunalo na lisangá mokomoko. Bakotalela elongo malako oyo ezali na mokanda ya 1 Yuli 1999 mpe malako oyo ezali na “Instructions pour la demande de publications et de périodiques” ya Yanuali 2000 (S(d)-15-F). Malako yango ekopesa biyano na mituna mingi oyo bandeko bazali kotuna na Biro.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto