Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/00 lok. 1
  • Osakolaka na mpiko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osakolaka na mpiko?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Zwá biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga 2018-2019—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 12/00 lok. 1

Osakolaka na mpiko?

1 Atako batɛmɛli bazalaki kokanga bango mpe kokanela bango, Petelo na Yoane bazalaki ntango nyonso kosakola nsango ya Bokonzi na mpiko. (Mis. 4:17, 21, 31) Kosakola na mpiko elimboli nini mpo na biso lelo oyo?

2 Pesá litatoli na mpiko nyonso: Liloba oyo ekokani na “mpiko” ezali “bolombe,” yango elimboli “kozanga kobanga, molende, mpe bompikiliki.” Mpo na baklisto ya solo, kosakola na mpiko elimboli kobanga te koloba ntango libaku malamu emonani ya kosakola nsango malamu epai ya bato mosusu. (Mis. 4:20; 1 Pet. 3:15) Elimboli ete tozali koyoka nsɔni te kosakola nsango malamu. (Nz. 119:46; Lom. 1:16; 2 Tim. 1:8) Na yango, mpiko ezali ezaleli oyo tosengeli kozala na yango mpo na kokokisa etinda ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ntango oyo ya nsuka. Ezali kotinda biso tosakolela bato nsango malamu epai nyonso oyo tozali kokutana na bango.​—Mis. 4:29; 1 Kol. 9:23.

3 Mpiko na eteyelo: Kobanga to ezaleli ya nsɔninsɔni, ezali kopekisa yo ete osakola te epai ya baninga na yo ya kelasi? Na bantango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te; ekoki kutu kozala mokakatano monene. Nzokande, Yehova akopesa yo makasi soki ozali kobondela mpo na kozwa mpiko ya kosakola epai ya bato mosusu. (Nz. 138:3) Mpiko ekosalisa yo omimonisa lokola Motatoli ya Yehova mpe otɛmɛla botyoli. Soki ozali kosakola na eteyelo yango ekoki kobikisa baoyo bazali koyoka yo.​—1 Tim. 4:16.

4 Mpiko na mosala: Na mosala, bayebi yo lokola Motatoli ya Yehova? Mbala mosusu lolenge bobele moko oyo baninga na yo ya mosala bakoki koyoka nsango malamu ekoki kozala na libaku oyo osalelaka mpo na kosakola epai na bango. Soki ozali na mpiko yango ekosalisa yo oyebisa patrɔ na yo apesa yo programɛ ya mosala oyo ekopesa yo nzela oyanganaka na makita nyonso to mpiko ekotinda yo osɛnga konje mpo na koyangana na mayangani.

5 Mpiko liboso ya minyoko: Kozala na mpiko ezali na ntina mingi ntango tozali kokutana na botɛmɛli. (1 Tes. 2:1, 2) Ekosalisa biso tókangama na kondima na biso ntango bazali kokanela biso, kotyola biso, to ntango tokutani na minyoko ya polele. (Filp. 1:27, 28) Mpiko elendisaka biso tótikala makasi liboso ya minyoko mpe totika te mibeko ya Nzambe na biso Yehova. Epesaka biso makasi ya kotikala sembo ntango tokutani na makambo oyo ezali kotinda biso ete tóbuka mibeko ya Nzambe na biso, Yehova. Epesaka biso nguya ya kobatela kimya na biso ntango bato mosusu bazali kotumola biso.​—Lom. 12:18.

6 Ata bampasi ya ndenge nini oyo tozali kokutana na yango, tiká ete tólanda kosakola nsango malamu na mpiko.​—Ef. 6:18-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto