Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
“Tozwaki mpiko . . . mpo na kolobela bino nsango malamu.”—1 TES. 2:2.
1. Mpo na nini nsango malamu ya Bokonzi ezalaka malamu mingi?
EZALAKA mpenza esengo koyoka nsango ya malamu! kasi, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe eleki nsango mosusu nyonso. Nsango malamu yango ezali koyebisa biso ete minyoko, maladi, mpasi, mawa, mpe liwa ekosila. Ezali kofungolela biso nzela ya bomoi ya seko, komonisa biso mokano ya Nzambe, mpe kolakisa biso ndenge tokoki kokóma baninga mpenza ya Nzambe. Okoki kokanisa ete moto nyonso akosepela koyoka nsango yango oyo Yesu ateyaki bato. Kasi, ezali bongo te.
2. Limbolá maloba ya Yesu oyo: “Nayaki kotya bokabwani.”
2 Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókanisa te ete nayaki kotya kimya na mabelé; nayaki kotya, kimya te, kasi mopanga. Mpo nayaki kotya bokabwani, moto akotɛmɛla tata na ye, mpe mwana mwasi akotɛmɛla mama na ye, mpe elenge mwasi ya libala akotɛmɛla mama-bokilo na ye. Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Mat. 10:34-36) Na esika ya kondima nsango malamu, bato mingi baboyaka yango. Bamosusu bamikómisaka banguna ya bato oyo basakolaka nsango yango, ata soki bazali bandeko na bango ya libota.
3. Mpo na kokokisa mokumba na biso ya kosakola, tozali na mposa ya nini?
3 Biso mpe tosakolaka solo oyo Yesu asakolaki; ntango tosakolaka yango, bato mingi baboyaka koyoka biso, kaka ndenge ezalaki na ntango ya Yesu. Yango ezali kokamwisa biso te. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoa. 15:20) Na bamboka mingi, bato batɛmɛlaka biso polele te, kasi batyolaka biso mpe basepelaka te na nsango na biso. Mpo na yango, tosengeli kozala na kondima mpe mpiko mpo tólɛmba te kosakola nsango malamu.—Tángá 2 Petelo 1:5-8.
4. Mpo na nini Paulo asengelaki ‘kozwa mpiko’ mpo na kosakola?
4 Mbala mosusu, okoki komona ete kosakola ezali mpasi to mpe okoki kobanga lolenge mosusu ya kosakola. Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Ntoma Paulo azalaki mosakoli ya mpiko, azalaki kobanga te mpe ayebaki solo malamu; atako bongo, ye mpe azalaki mbala mosusu kokakatana mpo na kosakola. Paulo akomelaki baklisto ya Tesaloniki boye: “Nsima wana tosilaki liboso konyokwama mpe kosambwisama mabe na Filipi (kaka ndenge boyebi), tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.” (1 Tes. 2:2) Na Filipi, bakonzi babɛtaki Paulo ná moninga na ye Silasi fimbo mpe batyaki bango na bolɔkɔ mpe bakangaki bango na minyɔlɔlɔ. (Mis. 16:16-24) Atako bongo, Paulo ná Silasi ‘bazwaki mpiko’ ya kokoba kosakola. Ndenge nini tokoki komekola bango? Mpo na kozwa eyano, tótala nini esalisaki basaleli ya Nzambe na ntango ya kala báteya solo na ntina na Yehova na mpiko mpe tómona ndenge tokoki komekola bango.
Esɛngaka mpiko mpo na kolonga botɛmɛli
5. Mpo na nini esɛngaka ntango nyonso basaleli ya sembo ya Yehova bázala na mpiko?
5 Yesu azali ndakisa eleki monene ya mpiko mpe molende. Banda kala, esɛngaka ete basaleli ya sembo ya Yehova bázala na mpiko. Mpo na nini? Nsima ya botomboki na Edene, Yehova asakolaki ete koyinana ekozala kati na bato oyo basalelaka Nzambe mpe baoyo basalelaka Satana. (Gen. 3:15) Koyinana yango emonanaki polele ntango Kaina abomaki Abele, ndeko na ye oyo azalaki sembo. Na nsima, bayinaki mpe Enoka, moto moko ya sembo oyo azalaki na bomoi liboso ya Mpela. Asakolaki ete Nzambe akoya elongo na bamiliadi na ye basantu mpo na kopesa etumbu na bato oyo batyolaka Nzambe. (Yuda 14, 15) Bato basepelaki na nsango yango te. Bato bayinaki Enoka mpe emonani ete balingaki koboma ye soki Yehova alimwisaki ye te. Enoka azalaki na mpiko mpenza!—Gen. 5:21-24.
6. Mpo na nini Moize asengelaki kozala na mpiko mpo na kosolola na Falao?
6 Kanisá mpe mpiko oyo Moize amonisaki ntango akendaki kosolola na Falao, mokonzi oyo bato bazalaki kotalela kaka te lokola momonisi ya banzambe, kasi lokola nzambe, mwana ya Ra, nzambe-moi. Ekoki kozala ete lokola Bafalao mosusu, ye mpe azalaki kosambela elilingi na ye moko. Liloba ya Falao ezalaki mobeko; azalaki koyangela na mibeko. Lokola azalaki na nguya, na lofundo, mpe motó makasi, amesanaki te ete bato báyebisaka ye oyo asengeli kosala. Liboso ya moto ya ndenge wana nde Moize oyo azalaki mobateli ya mpate, asengelaki kokendaka mbala na mbala kozanga ete bábenga ye, mpe azalaki koyambama malamu te. Nsango nini Moize azalaki komemela ye? Malɔzi ya nsɔmɔ. Mpe asɛngaki nini? Asɛngaki Falao atika bamilio ya baombo na ye bálongwa na Ezipito! Esɛngaki Moize azala na mpiko? Ee, esengelaki mpenza azala na yango!—Mit. 12:3; Ebe. 11:27.
7, 8. (a) Komekama nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bakutanaki na yango? (b) Nini esalisaki basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bázala na mpiko mpo na kosimba losambo ya pɛto?
7 Na boumeli ya bikeke oyo elandaki, basakoli mpe basaleli mosusu ya Nzambe bakobaki komonisa mpiko mpo na losambo ya pɛto. Mokili ya Satana elingaki bango te. Paulo alobaki boye: “Babambamaki mabanga, bamekamaki, bakatamaki biteni mibale na mosumani, bakufaki na kobomama na mopanga, bazalaki koyengayenga balati mposo ya bampate, mposo ya bantaba, wana bazalaki kokelela, kozwa bolɔzi, konyokolama.” (Ebe. 11:37) Nini esalisaki basaleli yango ya Nzambe báyika mpiko? Mwa moke liboso, ntoma Paulo amonisaki likambo oyo epesaki Abele, Abalayama, Sala, mpe bato mosusu makasi ya koyika mpiko. Alobaki boye: “Bazwaki te kokokisama ya bilaka, kasi [na kondima] bamonaki yango na mosika mpe basepelaki na boyei na yango.” (Ebe. 11:13) Na ntembe te, basakoli lokola Eliya, Yilimia mpe basembwi mosusu ya kala, baoyo na mpiko nyonso basimbaki losambo ya solo, bazwaki makasi ya koyika mpiko na kondima oyo bazalaki na yango na bilaka ya Yehova.—Tito 1:2.
8 Basembwi yango ya kala batyaki miso na bango na mikolo kitoko oyo ezalaki liboso na bango. Ntango bakosekwa, bakokóma bato ya kokoka mpe nsukansuka ‘bakolongolama na boombo ya kopɔla’ na nzela ya boyangeli ya Nganga-nzambe Monene, Klisto, mpe banganga-nzambe basungi 144 000. (Lom. 8:21) Lisusu, Yilimia mpe basaleli mosusu ya Nzambe na ntango ya kala bazwaki makasi na elaka oyo Yehova apesaki Yilimia ete: “Bakobunana na yo nde bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.” (Yil. 1:19) Lelo oyo, ntango tozali kokanisa bilaka ya Yehova mpo na mikolo ezali koya, mpe elaka oyo apesi ete akobatela biso na elimo, tozwaka mpiko.—Mas. 2:7; tángá 2 Bakolinti 4:17, 18.
Bolingo etindaki Yesu asakola na mpiko
9, 10. Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko liboso ya (a) bakonzi ya mangomba, (b) basoda, (c) nganga-nzambe monene, (d) Pilato?
9 Ndakisa na biso Yesu amonisaki mpiko na ndenge mingi. Na ndakisa, atako ayinamaki na bato oyo bazalaki na nguya mpe bato minene, Yesu atikaki te kosakola nsango oyo Nzambe alingaki bato báyeba. Na mpiko nyonso amonisaki polele mateya ya lokuta ya bakonzi ya mangomba mpe atɔndɔlaki bango mpo na ndenge bazalaki komimona bayengebene. Yesu azalaki kokakatana te kolobela polele mabe na bango. Mokolo moko, alobaki na bango boye: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! mpamba te bokokani na malita oyo epakolami mpɛmbɛ, oyo libándá na yango emonani solo kitoko kasi na kati etondi na mikuwa ya bakufi mpe na bosɔtɔ ya ndenge nyonso. Bino mpe ndenge moko, na libándá bomonanaka mpenza bayengebene na miso ya bato, kasi na kati botondi na bokosi mpe na botyoli-mibeko.”—Mat. 23:27, 28.
10 Ntango basoda bayaki mpo na kokanga ye na elanga ya Getesemane, na mpiko nyonso Yesu amimonisaki epai na bango. (Yoa. 18:3-8) Na nsima bamemaki ye liboso ya Sanedrina mpe nganga-nzambe monene atunaki ye mituna. Atako ayebaki ete nganga-nzambe monene azalaki koluka likambo mpo na koboma ye, Yesu andimaki na mpiko nyonso ete azali Klisto mpe Mwana ya Nzambe. Abakisaki ete bakomona ye “afandi na lobɔkɔ ya mobali ya nguya mpe azali koya elongo na mapata ya likoló.” (Mko. 14:53, 57-65) Mwa moke na nsima, Yesu akómaki liboso ya Pilato, oyo azalaki na likoki ya kotika ye. Kasi, Yesu apesaki eyano te na makambo nyonso oyo bafundaki ye na yango. (Mko. 15:1-5) Nyonso wana esɛngaki azala na mpiko mpenza.
11. Boyokani nini ezali kati na mpiko mpe bolingo?
11 Yesu alobaki na Pilato boye: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” (Yoa. 18:37) Yehova atindaki Yesu asakola nsango malamu, mpe Yesu azalaki na esengo ya kosala yango mpo alingaki Tata na ye ya likoló. (Luka 4:18, 19) Yesu alingaki mpe bato. Ayebaki ete bazalaki na mpasi. Ndenge moko mpe, tomonisaka mpiko mpe tobangaka te kosakola mpo tolingaka Nzambe mpe bato.—Mat. 22:36-40.
Elimo santu esalisaka biso tósakola na mpiko
12. Nini epesaki baklisto ya liboso esengo?
12 Na bapɔsɔ oyo elandaki liwa ya Yesu, bayekoli bakómaki na esengo na ndenge Yehova abakisaki bayekoli mosusu. Na mokolo moko mpamba, bato soki 3 000, Bayuda ná baprozelite oyo bautaki na mikili mosusu mpe bayaki na Yelusaleme mpo na fɛti ya Pantekote, bazwaki batisimo! Na ntembe te, Yelusaleme mobimba ekómaki kolobela likambo yango! Biblia elobi boye: “Kobanga ebandaki kokwela molimo nyonso, mpe makamwisi mingi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe bilembo ebandaki kosalema na nzela ya bantoma.”—Mis. 2:41, 43.
13. Mpo na nini bandeko babondelaki mpo na kozwa mpiko, mpe likambo nini esalemaki?
13 Bakonzi ya mangomba basilikaki mpe bakangaki Petelo ná Yoane, batyaki bango na bolɔkɔ mpe bapesaki bango mitindo bátika koloba mpo na Yesu. Ntango babimisaki bango, bantoma yango mibale bayebisaki bandeko makambo oyo ekómelaki bango, mpe bango nyonso babondelaki mpo na botɛmɛli yango; balobaki boye: “Yehova . . . pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Nini esalemaki? “Bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko.”—Mis. 4:24-31.
14. Ndenge nini elimo santu esungaka biso na mosala ya kosakola?
14 Tósimba ete elimo santu ya Yehova nde esalisaki bayekoli básakola Liloba ya Nzambe na mpiko. Mpiko ya koyebisa bato mosusu mateya ya solo, ata mpe baoyo bazali kotɛmɛla nsango na biso eutaka epai ya Yehova. Yehova akoki kopesa biso elimo santu na ye soki tosɛngi ye yango. Na lisalisi na ye, biso mpe tokoki komonisa mpiko mpenza mpe kolonga komekama ya ndenge nyonso.—Tángá Nzembo 138:3.
Baklisto basakolaka mpe na mpiko lelo oyo
15. Ndenge nini solo ezali kokabola bato lelo oyo?
15 Lelo oyo, solo ezali mpe kokabola bato, kaka ndenge ezalaki na ntango ya kala. Bato mosusu bandimaka yango, nzokande bamosusu bakangaka ntina na yango te mpe basepelaka na losambo na biso te. Bamosusu balobaka mabe, batyolaka mpe bayinaka biso, kaka ndenge Yesu asakolaki. (Mat. 10:22) Ntango mosusu, bato bakoselaka biso makambo na televizyo, na radio to mpe na bazulunalo. (Nz. 109:1-3) Atako bongo, na mabelé mobimba, basaleli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu na mpiko nyonso.
16. Ndakisa nini emonisi ete mpiko ekoki kobongola makanisi ya bato oyo tozali koteya?
16 Mpiko na biso ekoki mpe kotinda bato bábongola ndenge na bango ya kotalela nsango ya Bokonzi. Ndeko mwasi moko na Kirghizistan alobi boye: “Mokolo moko, ntango nazalaki na mosala ya kosakola, moto moko alobaki na ngai boye: ‘Nandimaka Nzambe, kasi Nzambe ya baklisto te. Soki oyei lisusu epai na ngai, nakotindela yo mbwa!’ Mbwa moko ya monene ezalaki na nsima na ye. Kasi, ntango tozalaki kokabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 37, oyo ezalaki na motó ya likambo “Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!,” nakanaki kozonga lisusu na ndako yango na elikya ete nakokuta moto mosusu ya libota ya moto yango. Kasi, kaka mobali yango nde afungolaki porte. Nasambelaki Yehova mpe nalobaki na moto yango boye: ‘Mbote, nayebi lisusu lisolo oyo tosololaki eleki mikolo misato, mpe nabosani mbwa na yo te. Kasi, nakokaki koleka yo boye te, mpo lokola yo, ngai mpe nandimaka Nzambe ya solo. Etikali moke, Nzambe apesa etumbu na mangomba nyonso oyo ezali koyokisa ye nsɔni. Mpo na koyeba likambo yango, okoki kotánga trakte oyo.’ Nakamwaki, mobali yango andimaki kozwa trakte. Nakendaki na ndako mosusu. Mwa miniti na nsima, mobali yango alandaki ngai mbangu na trakte na ye na mabɔkɔ. Alobaki na ngai boye: ‘Natángi yango; nasengeli kosala nini mpo nkanda ya Nzambe ekómela ngai te?’” Moto yango andimaki koyekola Biblia mpe akómaki koyangana na makita.
17. Ndenge nini mpiko ya ndeko mwasi moko elendisaki moyekoli ya Biblia oyo azalaki kobanga?
17 Mpiko na biso ekoki mpe kolendisa basusu. Na Russie, ndeko mwasi moko oyo azalaki na kati ya bisi apesaki moto moko zulunalo. Mobali moko atɛlɛmaki, abɔtɔlaki zulunalo na mabɔkɔ ya ndeko mwasi, afinaki yango mpe abwakaki yango. Abandaki kofinga ndeko mwasi, asɛngaki ndeko mwasi adrɛsi na ye mpe akebisaki ye ete asakola te na mboka na bango. Ndeko mwasi abondelaki Yehova asalisa ye, mpe amikundwelaki maloba oyo Yesu alobaki ete: “Bóbanga te baoyo babomaka nzoto.” (Mat. 10:28) Na malɛmbɛ nyonso, ndeko mwasi atɛlɛmaki mpe alobaki na mobali yango boye: “Nakopesa yo adrɛsi na ngai te mpe nakokoba kosakola na mboka oyo.” Na nsima, akitaki na bisi. Kozanga ete ayeba yango, moyekoli na ye moko ya Biblia azalaki na bisi yango mpe amonaki makambo oyo ekómelaki ndeko mwasi. Kobanga bato ezalaki kopekisa mwasi yango abanda koyangana na makita. Kasi, ntango amonaki mpiko ya ndeko mwasi, azwaki ekateli ya kobanda koyangana na makita.
18. Nini ekosalisa yo osakolaka na mpiko ndenge Yesu asalaki?
18 Na mokili oyo ya mabe, esɛngaka kozala na mpiko lokola Yesu mpo na kosakola. Nini ekosalisa yo? Tyá miso na yo na bomoi oyo ezali koya. Lingá makasi Nzambe mpe bazalani na yo. Bondeláká Yehova mpo apesa yo mpiko. Kobosanaka te ete ozali yo moko te, mpo Yesu azali elongo na yo. (Mat. 28:20) Elimo santu ekopesa yo makasi. Mpe Yehova akopambola mpe akosunga yo. Yango wana, tiká tózala na mpiko mpe tólobaka ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”—Ebe. 13:6.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengeli kozala na mpiko?
• Na oyo etali kozala na mpiko, liteya nini tozwi epai ya . . .
basembwi oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya?
Yesu Klisto?
baklisto ya liboso?
bandeko na biso baklisto lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 21]
Na mpiko nyonso Yesu amonisaki polele mabe ya bakonzi ya mangomba
[Elilingi na lokasa 23]
Yehova apesaka biso makasi ya kosakola