Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kolakisa mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir? mpe“Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilumu ya bakufi—bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous. Sɛtɛmbɛ: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda wana mibale, bokoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu to buku mosusu ya kala.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mpe mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2002 na komande na bango ya mikanda ya Sɛtɛmbɛ. Ba Calendriers ekozala na Lingelesi mpe na Lifalanse.
◼ Ndenge nkoma FSA 14 Marsi 2000 elobaki yango, tokotindela lisangá mokomoko ya Congo-Kinshasa bafɔrmilɛrɛ oyo bakosalela na mobu ya mosala 2002; ekotindama soki tozwi yango. Tosɛngi bino ete bósalela formilɛrɛ yango bobele mpo na mosala oyo etindami mpo na yango.
◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2001 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ezali ndenge moko na evantɛrɛ oyo esalemaka sanza na sanza na ndeko oyo atalelaka mikanda, mpe bosengeli kokoma motuya ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motuya ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko oyo bosalelaka mikanda esika moko. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na Biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bosengeli kobomba kopi mosusu na dosye. Kopi ya misato, yango nde bokosalela lokola bruyɔ. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa mosala yango ya evantɛrɛ. Mokomeli mpe mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango.
◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya makomi minene ekobanda kobima na Swahili na nimero na yango ya 1 Sɛtɛmbɛ 2001.
◼ Soki mobongisi-nzela mosungi akokisi bangonga na ye te, kozanga ete akana yango, na nsuka ya sanza akotángama kaka lokola mobongisi-nzela mosungi atako akokisi ngonga te. Mpe soki mosakoli moko oyo asɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo na basanza mingi amoni ete akozala lisusu na likoki te ya kokokisa bangonga oyo esengami mpo na basanza oyo etikali, asengeli koyebisa yango na bankulutu mpo bálongola nkombo na ye na liste ya bandeko oyo bakosala lokola babongisi-nzela na basanza yango. Akoki kozongela mosala yango na nsima, soki amibongisi malamumalamu mpo na kokokisa bangonga oyo esengami. Yango wana, liboso ya kotya sinyatili na formilɛrɛ nyonso, bandeko ya komite ya mosala basengeli kotala malamumalamu soki ndeko oyo atondisi yango amibongisi mpenza mpo na kokokisa ngonga 50 oyo esɛngami. Soki amibongisi te, ekozala malamu bálendisa ye ete, liboso ya kotondisa formilɛrɛ, azwa naino bibongiseli mpo na kokokisa bangonga.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Index ya mikanda 1999
Lingala: Yesu Klisto: Azali nani? (T-24)
Lomongo: Yehova: Azali nani? (T-23)
Tshiluba: Yehova: Azali nani? (T-23); Yesu Klisto: Azali nani? (T-24)