Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/01 lok. 8
  • Tyá kominanola na esika ebongi na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyá kominanola na esika ebongi na yango
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Oponaka kominanola oyo ebongi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Salelá ntango na yo na mayele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ozali nde komɛla ngɛngɛ ya elimo ya mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 8/01 lok. 8

Tyá kominanola na esika ebongi na yango

1 Na mikolo oyo ya mpasi, biso nyonso tozalaka na mposa ya konyolisa nzoto na bantango mosusu. Ezali na mitindo mosusu ya kominanola oyo ezali malamu. Kasi soki okómi kolekisa ntango mingi na kominanola, na kosakana, mpe na kobɛta masolo, mokemoke yango ekobanda kolya yo ntango oyo okokaki kosalela mpo na makambo ya elimo. Yango wana, tosengeli kotya kominanola na esika ebongi na yango. (Mat. 5:3) Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tolandi toli oyo ezali na Baefese 5:15-17.

2 Kolekisa ndelo te: Paulo akomelaki baklisto ete basengeli ‘kokeba mpenza’ na ndenge bazali kotambola, bázala bato ya mayele. Yango wana, mpo tólekisa ndelo te na kominanola, tosengeli kozala na bokatikati mpe koyeba komipekisa. Ebongi tókanisa malamumalamu ndenge tosalelaka ntango na biso oyo mosala ezalaka te. Kominanola esengeli komemela biso mwa matomba na nzoto, kasi esengeli te kolekisa biso ntango mpambampamba to kolembisa biso na nsima ya kosala yango. Soki tomiyoki ete tosali mosala ya mpunda, tozwi eloko te, mpe tomoni lokola tosali mabe moko boye nsima ya kosala lisano moko boye, wana elakisi ete tosengeli kobongisa lisusu ndenge oyo tozali kosalela ntango na biso.

3 Zalá mayele: Paulo apesaki biso toli ‘tósombaka ntango oyo ebongi’ mpo na kosala makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso, tózala “bazoba te.” (Ef. 5:15-17, NW ) Baklisto oyo bamipesi [na Nzambe] bakoki ata moke te kokómisa kominanola likambo oyo eleki ntina mingi na bomoi na bango. Atako kopema mpe kozwa mwa mopɛpɛ ekoki kopesa biso nzoto makasi, tóbosana te ete nguya ya Nzambe nde epesaka makasi ya elimo. (Yis. 40:29-31) Misala ya Teokrasi lokola koyekola Biblia, koyangana na makita ya lisangá, mpe kobima na mosala ya kosakola nde esalisaka biso tozwa elimo ya Nzambe, kasi tozwaka yango na kominanola te.

4 Tyá makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso: Paulo alobaki na baklisto ete “bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.” Yesu ateyaki ete makambo nyonso oyo tokosala esengeli kozala mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali eloko ya libosoliboso na bomoi na biso. (Mat. 6:33) Tosengeli kosala libosoliboso makambo oyo ekopesa biso nzela ya kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai ya Yehova. Na nsima nde, tokoki kotya kominanola na esika ebongi na yango. Soki tosali bongo, yango ekomemela biso matomba mingi, mpe tokosepela na yango mingi koleka.​—Mos. 5:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto