Nakoki kosɛnga lisalisi na bamboka mosusu?
Na bantango mosusu, ezalaka na basakoli oyo batindaka mikanda na bafiliale ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na bamboka mosusu mpo básalisa bango na makambo ndenge na ndenge. Bamosusu basɛngaka bálukela bango baninga ya kotindelanaka mikanda, bamosusu basɛngaka bálukela bango basi to mibali ya kobala, bamosusu bakasɛti ya radio to ya video, bamosusu mpe basɛngaka bádefisa bango mbongo. Yango wana, tolingi moto nyonso ayeba likambo oyo: bafiliale ekoki kotalela makambo ya ndenge wana te.
Mokano ya la Société Watch Tower ezali ya kosalisa bato, ezali kompanyi ya mombongo te. Mosala na yango etambolaka na mbongo ya makabo oyo bato bapesaka na mokili mobimba mpo na ntina kaka moko ete: nsango ya Bokonzi ya Nzambe esakolama na mabele mobimba. (Mat. 24:14) Yango wana, mwayɛ ya kodefisa bato mbongo ezali te, makabo nyonso ezali kosalelama mpo na mosala ya kosakola.
Na bantango mosusu, ezalaka na bato oyo batindaka mikanda na mikili mosusu epai ya baninga to epai ya bato oyo bayebi ata bango te, mpo na kosɛnga biloko to mbongo. Bamosusu kutu, bazali ata na mbongo te, kasi bazali kosala mibembo na bamboka ya bopaya to na bingumba minene, mpe bazali kotya motema ete bandeko, oyo bazali na mboka to na engumba oyo bango bazali kokende kofanda, bakobanda kosalisa bango. Kasi tókanisa naino: ‘bantango oyo ya mpasi’ ezali nde konyokola kaka biso moko, kasi bandeko na biso ya elimo na bamboka mosusu te?—2 Tim. 3:1.
Lisangá ya boklisto ezalaka na ebongiseli moko ya kosalisa bato oyo bazali kokelela na kati na biso mpe oyo batikali mabɔkɔ mpamba mpo na likama moko boye. Likambo yango elobelami malamu na buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, na lokasa 123-124. Yango wana, ezali malamu te kotinda mikanda na masangá to na bafiliale ya bamboka mosusu mpo na kosɛnga lisalisi.
Lisusu, baadrɛsi ya masangá mpe ya bato oyo basalá abonema na bafiliale ezali makambo ya sɛkɛlɛ mpe esengeli soki moke te kopesama epai ya bato oyo bazali koluka baninga ya kotindelanaka mikanda ya makambo na bango moko to baoyo bazali koluka basi to mibali ya kobala. Soki olingi okende mobembo na mboka moko ya mopaya, okoki kotinda mokanda na biro ya filiale ya mboka yango mpo na kosɛnga adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi oyo ezali penepene mpe kotuna ngonga oyo basalaka makita.
Soki tokotosa malako oyo, ntango na biso ekobebisama mpambampamba te na makambo ya bongo mpe tokomipesa lisusu mosala te.—1 Kol. 14:20.