Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/01 lok. 8
  • Olingi kosala mingi lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingi kosala mingi lisusu?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa mosala na biso ya motuya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Ndenge ya kokolisa mosala na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 8/01 lok. 8

Olingi kosala mingi lisusu?

1 Yesu alobaki: Bokonzi ya Nzambe ezali lokola biloko ya motuya. (Mat. 13:44-46) Mosala ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi ezali mpe eloko ya motuya mingi. Mosala yango ebongi kozala na esika ya libosoliboso na bomoi na biso, ata soki ezali kosɛnga biso tómipimela mwa makambo mosusu mpo na kopesa yango ntango mingi. (Mat. 6:19-21) Olingi kosala mingi lisusu na mosala ya Bokonzi?

2 Talelá makambo oyo ya ntina: Mpo na kosala mingi lisusu na kati ya mosala ya kosakola, ezali na makambo mingi ya ntina oyo osengeli kosala: (1) kozwa mokano makasi ete, ata ndenge nini, Bokonzi ekozala kaka eloko ya libosoliboso na bomoi na ngai (Mat. 6:33); (2) kozala na kondima mpe kotyela Yehova motema (2 Kol. 4:1, 7); (3) kosɛnga ye na libondeli ya motema mobimba mpe ya mbala na mbala ete asalisa yo (Luka 11:8-10); (4) kokanga mabɔkɔ te mpe sala makambo ndenge osɛngaki na mabondeli.​—Yak. 2:14, 17.

3 Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola: Sanza na sanza, biso nyonso tokoki komityela mokano ya kosala mwa bangonga na mosala ya kosakola. Kasi, omityelá mpe mokano mpo na makambo oyo: kolekisa ata libaku moko te mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu, kosala makasi ete obongisa ndenge na yo ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola, kobongisa malamumalamu ndenge na yo ya kozongela bato oyo okutanaki na bango, mpe kosala makasi mpo na kotambwisa mokemoke boyekoli ya Biblia? Mpo na nini te kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi to ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza to kokende kosakola na esika oyo mposa ezali makasi? Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, mpo na nini te koluka kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala to nkulutu? (1 Tim. 3: 1, 10) Mpo na nini te kotondisa formilɛrɛ ya kosala na Betele, ya kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, to na Eteyelo ya Gileadi mpo na kokóma misionɛrɛ? Na ndenge wana nde mosala na yo ekokola.​—Luka 10:12.

4 Ndeko mobali moko azalaki kosala mosala ya mosuni oyo ezalaki kozwa ye ntango mingi, azalaki mpe kolekisa bangonga mingi na masano to sports; kasi balendisaki ye ete akóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Bongo abandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe na nsima amibongisaki mpo na kokɔta na mosala ya ntango nyonso. Nsukansuka, akɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, mpe eteyelo wana ebongisaki ye malamumalamu mpo na kokokisa mokumba oyo azali na yango sikoyo ya mokɛngɛli ya zongazonga. Ndeko yango azali na esengo mingi ndenge andimaki elendiseli oyo bapesaki ye, mpe azali komona ete mokano oyo azwaki ya kosala mingi lisusu na kati ya mosala ya Bokonzi ekómisi ye mpenza moto ya esengo koleka ndenge azalaki liboso.

5 Yehova apambolaka baoyo bamipesaka bango moko na mosala na ye. (Yis. 6:8) Yango wana, kolinga ata eloko moko te epekisa yo kosala mingi lisusu; mpo yango ekopesa yo esengo mingi mpenza mpe makasi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto