Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda yango, bokoki kolakisa bango buku L’humanité à la recherche de Dieu to mokanda mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1987 soki ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na buku L’humanité à la recherche de Dieu ekoki mpe kolakisa yango. Febwali: Buku nyonso ya kala ya nkasa 192 oyo ezali na kati ya libombo ya lisangá.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Desɛmbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Masangá esengeli kobanda kosɛnga Annuaire des Témoins de Jéhovah 2002, na komande na bango ya mikanda ya sanza ya Novɛmbɛ. Annuaire ekozala na Lingelesi mpe na Lifalanse. Komande na yango ekobombama kino ntango Annuaire ekokóma mpe ekotindama na masangá. Annuaire ezali kati na mikanda oyo esɛngamaka na komande ya sipesiale.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Volimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 2000.
◼ Mikanda oyo tozwi yango lisusu na stokɛ:
Lifalanse: Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu; Volimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1985, 1986, 1987, 1988, 1989, 1992, 1997.