Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/01 nk. 5-6
  • Kolisá makoki na yo ya kososola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolisá makoki na yo ya kososola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Bilenge: bókolisa bososoli na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Oyebi ‘kokesenisa malamu na mabe’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kobá kosalela makoki na yo ya kososola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 11/01 nk. 5-6

Kolisá makoki na yo ya kososola

1 Mikolo ya nsuka mpe ya mpasi oyo tozali na yango ezali komemela basaleli ya Nzambe, bipai nyonso, mitungisi ya ndenge na ndenge mpe komekama makasi. (2 Tim. 3:1-5) Biso nyonso tozali na mposa ya kolendisama mpo tózala ntango nyonso makasi na kondima. (1 Kol. 16:13) Yehova akoki kosalisa biso tózala ntango nyonso makasi na kondima soki tozali ntango nyonso komileisa na Liloba na ye, soki tozali kotya motema na elimo na ye, mpe soki tokangami na ebongiseli na ye.​—Nz. 37:28; Lom. 8:38, 39; Emon. 2:10.

2 Mpo na yango, na liyangani ya mokolo moko oyo esalemaki na mbula eleki, totalelaki motó ya likambo oyo: “Bókóma mikóló na makanisi.” Maloba yango eutaki na 1 Bakolinti 14:20, epai tozali kotánga maloba ya ntoma Paulo ete: “Bandeko, bózala bana mike na makanisi na bino te; bózala bana mike kati na makambo mabe nde bókóma [mikóló] na makanisi.” Omonaki liyangani yango ndenge nini?

3 Tótánga kaka maloba ya bato mibale. Moto moko alobaki ete: “Ezali mpenza kolendisa!” Moto mosusu alobaki mpe ete: “Ezali yango mpenza nde esengelaki mpo na biso.” Kutu, ata tata moko oyo azali Motatoli te oyo ayaki na liyangani yango ya mokolo moko mpo na kotala mwana na ye ya mwasi ya mbula 12 oyo asengelaki kozwa batisimo, alobaki ete liyangani yango esimbaki mpenza motema na ye mpe amonaki ndenge oyo libota na ye bakoki kozwela yango litomba. Yo mpe ozali koyoka ndenge yango? Tiká tózongela naino mwa makanisi ya ntina ya liyangani yango.

4 Esengeli kozwa boyebi ya solosolo mpo na kokolisa makoki ya kososola: Na lisukulu ya liboso, “Kolisá uta sikoyo makoki na yo ya kososola,” molobi amonisaki nini oyo tozali mpenza na mposa na yango mpo na kolonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo. Tozali kaka na mposa ya mayele te. Tosengeli kokolisa makoki na biso ya kososola Biblia noki te makambo nyonso ya mabe oyo ezali zingazinga na biso elonga biso. Ezali kosɛnga ete Nzambe atambwisa biso mpo na kozwa bososoli yango. Tosengeli kobondela Yehova lokola mokomi ya nzembo, ete asalisa biso tóyeba malamu mibeko na ye mpe makambo oyo akundolelaka biso mpo tókoka kosalela ye na motema na biso mobimba.​—Nz. 119:1, 2, 34.

5 Na lisukulu ya mibale, mokɛngɛli ya zongazonga amonisaki ete na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye, Yehova azali kopesa biso “Lisalisi mpo na kokóma mikóló na bososoli ya Biblia.” Alimbolaki bososoli lokola “likoki ya kotalela likambo na mozindo mpe kokesenisa eloko na eloko ya likambo yango, koyeba boyokani kati na mitindo ndenge na ndenge ya likambo yango mpo na kokanga ntina ya likambo yango mobimba, mpe na nsuka koyeba ndimbola na yango.” Nani oyo akoki kosalisa biso tókolisa likoki yango? Yehova apesi biso makabo na mitindo na mibali mpo na kosalisa biso tókola na elimo. (Ef. 4:11, 12) Ebongiseli na ye awa na mabele ezali kolendisa biso tótángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe tóyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita nyonso ya lisangá. (Nz. 1:2) Ebongiseli na ye ezali koteya biso ndenge ya kosalela Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia ntango tozali koyekola biso moko mpe ntango tozali koyekola na kati ya libota mpe ntango tozali kobongisa makita to mpe ntango tozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola. Ozwelaka bibongiseli yango nyonso litomba? Osilá kobongisa programɛ na yo moko ya kotánga Biblia mbala na mbala mpe olandaka yango? Makambo yango ezali na ntina mingi soki tolingi te kokwea na elimo ya mokili, bisalasala na yango, mateya na yango ya filozofi mpe makanisi na yango oyo ezali kokosa bato.​—Kols. 2:6-8.

6 Tosengeli koteya makoki na biso ya kososola: Na lisukulu na ye ya liboso, oyo motó ya likambo na yango elobaki ete: “Kolisá makoki na yo ya kososola mpo na kobatela elimo na yo,” molobi-mopaya amonisaki ete bato ya mokili bakoki te kokesenisa mabe na malamu. (Yis. 5:20, 21) Ezali boye mpamba te bazali koboya kondima mpe kotosa mitinda ya sembo ya Nzambe. Nzokande, biso baoyo tozali kozwa mateya ya elimo na kati ya ebongiseli ya Yehova, tokeseni na bango; tondimaka mitinda ya Nzambe, oyo etambwisaka misala mpe etamboli na biso. Na bongo, tokoki mpenza koyeba oyo ezali malamu na miso ya Nzambe mpe oyo ekoki kondimama na miso na ye mpe oyo eyokani na mokano na ye ya kokoka.​—Lom. 12:2.

7 Mpo na kokima mobulungano oyo ezali na makanisi ya bato ya mokili mpe kobuka mbuma mabe na yango te, tosengeli ntango nyonso koteya makoki na biso ya kososola. Ndenge nini tokoki kosala yango? Lokola ekomami na Baebele 5:12-14, ntoma Paulo amonisaki ete tosengeli mpenza kosuka kaka te na komɛla “mabɛlɛ” ya liloba. Tosengeli kolya bilei ya makasi na elimo, lokola oyo tokolya na nzela ya buku “Esakweli ya Yisaya,” ntango tokoyekola yango na Boyekoli ya mokanda na kati ya lisangá. Na nsima, tosengeli mbala moko kosalela na bomoi na biso makambo oyo tozali koyekola. Ntango tozali kosala bongo, tozali komona ete mibeko mpe mitinda ya Yehova ezali sembo. Na ndenge yango nde tozali koteya makoki na biso ya kososola mpo na kokesenisa polele mabe na malamu.

8 Likambo ya mawa, bato mosusu balɛmbi na elimo. Mpo na nini? Batyaki makanisi na bango te na makambo oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova. Yango wana, bakómaki kolanda masolo ya bato minene ya mokili oyo elekaka na radio mpe na televizyo, masolo oyo elobelaka makambo oyo Makomami ezali koboya; bakómaki koyoka miziki ya mabe, to mpe bakómaki na baninga ya mabe oyo bazali kosolola na bango na nzela ya ordinatɛrɛ. Soki tozali na mayele, tokoboya kolanda bato ya misala ya mbindo, ya makambo ya mpambampamba, to ya mabe.​—Mas. 13:20; Gal. 5:7; 1 Tim. 6:20, 21, NW.

9 Bilenge basengeli “kozala bana mike kati na makambo mabe”: Liyangani ezalaki na masukulu mibale oyo elendisaki mingimingi bilenge na kokolisa makoki na bango ya kososola. Balobi bamonisaki ete kozala “bana mike kati na makambo mabe” elimboli koyeba eloko te, elingi koloba, kozala na likambo moko te, lokola bana mike, na makambo oyo ezali mbindo na miso ya Yehova. (1 Kol. 14:20) Balendisaki biso nyonso ete tókeba mpenza na ndenge oyo tozali kosalela ntango na biso mpo tóboya komitika na mabe ya lolenge nyonso mpe yango ezwa biso te. (Ef. 5:15-17) Balendisaki biso na kotalela malamu ngonga boni tolekisaka na kotánga mikanda oyo esalisaka biso te mpo tókola na bososoli ya makambo ya elimo. Osalaki yango? Omonaki ndenge nini? Longola kotánga Biblia mokolo na mokolo, zalá na mokano ya kotángaka mikanda oyo ebongiseli ya Nzambe ezali kopesa biso. Soki tozali kosala bongo, biso nyonso, na bilenge lokola, ‘tokozwa bososoli.’​—Mas. 4:7-9.

10 “Zwá matomba na kosalela mitinda ya Biblia na bososoli”: Yango nde ezalaki motó ya likambo ya lisolo ya nsuka na liyangani yango ya mokolo moko. Molobi-mopaya amonisaki ete Yehova nde apesaka bososoli oyo ememaka na bomoi, bososoli oyo eleki bososoli ya bato nyonso mosika. Kanisá naino: ozali mpenza na libaku ya kotoka bososoli epai ya Yehova! Apesaka yango na baoyo nyonso bazali koluka yango mpe kosɛnga ye yango na kondima mpe na bosembo mpenza. (Mas. 2:3-5, 9; 28:5) Ozali mpenza kosalela likabo yango?

11 Tolendisamaki na koyekola koyeba mitinda ntango tozali kotánga Biblia. (2 Tim. 3:16, 17) Yekolá mitinda yango malamumalamu mpo na koyeba kososola mpenza maloba ya Yehova. Zwá ntango ya komanyola likoló ya mitinda yango mpe kɔtisá yango na bɔɔngɔ mpe na motema na yo. Yango ekokolisa makoki na yo ya kososola mpe okoyeba kozwa bikateli ya malamu na bomoi na yo. (Yos. 1:8) Sikoyo, tótalela naino mwa makambo oyo bato mingi bakutanaka na yango mpe tóluka koyeba ndenge nini kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tólonga.

12 ‘Nasengeli kolanda lolenge moko boye ya kolata mpe ya kosala monzɛlɛ?’ Midɛlɛ, oyo eumelaka kaka mwa mikolo, oyo bato ya mokili babimisaka na makambo etali kolata mpe kosala monzɛlɛ emonisaka elimo ya botomboki. Elimo yango etindaka bato na kolata bilamba oyo ezali bongobongo mpe kolata mabe to kolata na ndenge oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto epai ya bato mosusu. Mitinda nini ya Biblia ebongi na kosalisa biso mpo tólanda elimo yango te? Soki tosili koteya makoki na biso ya kososola, tokolanda etinda oyo ezali na 1 Timote 2:9, 10, oyo elobi ete tosengeli kolata “na bopɔlɔ mpe na makanisi malamu . . . , lokola ebongi na [bato oyo] bayamboli ete bazali kondima Nzambe.” Mitinda mosusu tokoki kosalela ezali lokola oyo ya 2 Bakolinti 6:3 mpe Bakolose 3:18, 20.

13 ‘Nakoki kosala nini mpo tózala na boyokani malamu na kati ya libota?’ Ezali na ntina mingi ete bato ya libota moko básololaka malamu. Yakobo 1:19 (NW) elobi na biso ete: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” Bato ya libota moko basengeli koyokaka ntango moninga azali koloba mpe kolobanaka, mpamba te kosolola elimboli koloba mpe koyoka. Ata soki tozali koloba makambo ya solo, kasi soki tolobi yango na nkanda, na lolendo, to totaleli te soki moninga akosepela na yango to te, na esika ete ezala likambo ya malamu ekozokisa nde kozokisa. Na yango, ozala mwasi to mobali, moboti to mwana, biso nyonso tosengeli kosala ete maloba na biso ‘ezala na ngɔlu, na elɛngi ya mungwa ntango nyonso.’​—Kols. 4:6.

14 ‘Nakómi kolinga mingi biloko ya mokili?’ Kolinga mingi biloko ya mokili ezali mposa ya mokili oyo ebendaka mindɔndɔ na bomoi. Yango ezali sɛkɛlɛ ya bolamu te. (Mos. 5:10; Luka 12:15; 1 Tim. 6:9, 10) Mpo na kosalisa biso tókwea te na motambo ya kolinga mingi biloko ya mokili, Yesu ateyaki biso etinda moko ya ntina mingi: Tózala na liso oyo ezangi mindɔndɔ. Kozala na bomoi ya bokatikati, bomoi oyo ezangi mindɔndɔ esɛngi kotya miso na biso kaka na matomba ya Bokonzi mpe kotya makambo mosusu nyonso na nsima.​—Mat. 6:22, 23, 33.

15 Tosengeli komityela mokano nini? Na kati ya Liloba ya Nzambe tozali kokuta mitinda ya sembo oyo ekoki kotambwisa biso mpo na kozwa bikateli ya malamu. Tosengeli koyekola mitinda yango, komanyola likoló na yango, mpe koyeba ndenge oyo tokoki kosalela yango na bomoi na biso. Soki tozali kosala bongo, elingi koloba soki tozali ‘koteya makoki na biso ya kososola mpo na kokesenisa na malamu na mabe,’ tokozwela yango matomba mpe tokokumisa Yehova.​—Ebe. 5:14, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto