Baboti—Bóteya bana na bino banda bomwana
1 “Teyá mwana nzela oyo ebongi ete atambola na yango; ata ntango akokóma mokóló akotika te kolanda yango.” (Mas. 22:6, NW) Baboti, soki bolingi ete bana na bino ‘bátika te kolanda’ nzela ya solo, bosengeli kobanda koteya bango ntango nini? Ntango bazali naino mike!
2 Ntango Paulo alobaki ete Timote azwaki mateya ya elimo “longwa bomwana,” na ntembe te alingaki koloba ete azwaki mateya yango ntango azalaki naino mwana moke mpenza. (2 Tim. 3:14, 15) Yango esalaki ete Timote akóma na nsima moto moko oyo amipesaki mpenza na makambo ya elimo. (Filp. 2:19-22) Baboti, bino mpe bosengeli kobanda kopesa bana na bino, “longwa bomwana” na bango, mateya oyo basengeli na yango mpo ‘bákola pene na Yehova.’—1 Sam. 2:21, NW.
3 Bósopelaka bango mai oyo basengeli na yango mpo na kokola: Mpo nzete oyo ezali naino mike ekola malamu, esengeli kosopelaka yango mai; ndenge moko mpe na bana, ata bazali na mbula boni, bazalaka na mposa ete básopelaka bango mai ya solo ya Biblia mpo bákola, bákóma basaleli ya Nzambe oyo bakɔmeli. Lolenge ya libosoliboso ya koteya bana solo mpe kosalisa bango bázala baninga ya Yehova ezali koyekola Biblia mbala na mbala na kati ya libota. Kasi baboti, bosengeli kotalela makoki ya kotya likebi oyo mwana mokomoko azali na yango. Mpo na bana oyo bazali naino mike, mbala mosusu kopesa bango mwa mateya moke mokolo na mokolo ezali malamu koleka kopesa bango mateya milaimilai nsima ya kolekisa mikolo mingi.—Det. 11:18, 19.
4 Bókanisa soki moke te ete bana na bino bazali na mayele mpenza te mpo na koyekola. Bóbɛtɛlaka bango masolo ya bato oyo Biblia elobeli. Bóyebisaka bango báyema bililingi ya makambo oyo elobelami na kati ya Biblia to mpe bámeka kosala makambo yango lokola mwa drame. Bósalelaka mpe malamu bakasɛti video na bakasɛti ya radio oyo Batatoli ya Yehova babimisaka, bakisa mpe bakasɛti ya drame. Bosengeli kosala ete mateya oyo bozali kopesa bana na ntango ya boyekoli ya libota eyokana na mbula na bango mpe na mayele na bango. Ntango mwana azali naino moke bosengeli koteya ye makambo ya ebandeli, mokemoke; kasi wana azali kokola, mateya mpe esengeli kobakisama malɛmbɛmalɛmbɛ. Bosengeli kosala ete boyekoli ya Biblia ezala likambo ya esengo mpe bosengeli kopesa mateya ya ndenge na ndenge. Soki bolingi ete bana na bino bázalaka na “mposa makasi” ya Liloba, bosengeli kosala nyonso oyo bokoki mpo boyekoli esepelisaka bango.—1 Pet. 2:2, NW.
5 Bómesenisa bango na makambo ya lisangá: Bótyela bana na bino mikano oyo bakoki kokokisa malɛmbɛmalɛmbɛ wana bazali kokola, mpo ete bámesana mpenza na makambo ya lisangá. Mokano nini bokoki kotyela bango na ebandeli mpenza? Baboti ya bana mike mibale balobaki boye: “Libosoliboso, tobandaki koteya bana na biso ndenge ya kofanda kimya na Ndako ya Bokonzi.” Na nsima, bósalisa bana bápesaka biyano na makita na maloba na bango moko, mpe bámityela mokano ya kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Na mosala ya kosakola, bokoki kosalisa bango bákokisa mikano ya malamu lokola oyo: kolakisa trakte ntango bokómi liboso ya ndako moko, kotánga vɛrsɛ moko, kolakisa moto zulunalo, kobanda lisolo moko ya malamu na moto.
6 Bópesa bango ndakisa malamu: Mokolo na mokolo, bana na bino bayokaka bino bozali koloba makambo ya Yehova mpe bozali kobondela ye? Bamonaka bino bozali koyekola Liloba na ye, koyangana na makita, kobima na mosala ya kosakola? Bamonaka mpe ete bosepelaka kosala mokano ya Nzambe? (Nz. 40:8) Ezali na ntina ete bámona bino bozali kosala makambo nyonso wana; lisusu ezali na ntina ete bósalaka makambo yango elongo na bango. Ndeko mwasi moko abɔkɔlaki bana motoba tii bango nyonso bakómaki Batatoli ya sembo; mwana na ye moko ya mwasi, oyo akómi sikoyo mokóló, alobaki boye: “Likambo oyo esimbaki mpenza motema na biso ezalaki ndakisa oyo mama ye moko azalaki kopesa biso—ndakisa na ye nde ezalaki na ntina mingi koleka maloba.” Moboti moko oyo azali na bana minei alobaki boye: “Maloba oyo ete ‘Yehova azali na esika ya liboso,’ ezalaki kosuka kaka na monɔkɔ te, kasi ezalaki mpenza bongo na bomoi na biso.”
7 Baboti, bóbanda koteya bana na bino wana bazali naino mike, bóteya bango solo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, bótyela bango mikano oyo basengeli kokokisa malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe bózala bandakisa malamu mpo na bango. Soki bokokisi makambo yango, bokozanga te kozala na esengo!