Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?
1 Na esika ofandi, mosala ya kosakola Bokonzi ebandá kala? (Mat. 24:14) Soki ezali bongo, okoki kokanisa ete bato nyonso oyo bazali na teritware ya lisangá na bino basilá koyoka nsango ya Bokonzi. Sikoyo, ntango osakolaka, mbala mosusu bato mingi oyo okutanaka na bango bamonanaka lokola nde bazali kosepela mpenza te na nsango ya Bokonzi. Ata soki bazali kosepela te, talá likanisi oyo buku Esakweli ya Yisaya 2 (na Lifalanse) epesi mpo na bayekoli ya solo ya Yesu, na lokasa 141: “Na bisika mosusu, mbuma oyo mosala na bango ya kosakola ezali kobota ekoki komonana moke mpenza na kotalela milende oyo bazalaka na yango na mosala yango. Atako bongo, bazali koyika mpiko.” Kasi mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?
2 Tókanisa Yilimia: Mpo tóyika mpiko na mosala ya kosakola na bosembo mpenza, yango etaleli te soki bato bazali koyoka biso to te. Yilimia asakolaki na boumeli ya mbula 40 na teritware kaka moko, atako mwa bato moke mpenza nde bayokaki ye mpe mingi baboyaki nsango na ye. Mpo na nini Yilimia atikaki kosakola te? Ezali mpo azalaki kosala mosala oyo Nzambe atindaki ye mpe ayebaki likambo oyo elingaki kosalema na mikolo oyo ezalaki koya; nyonso wana etindaki ye akoba koloba na mpiko mpenza.—Yil. 1:17; 20:9.
3 Ezali se ndenge moko mpo na biso. Yesu “atindaki biso tósakola epai ya bato mpe tópesa litatoli malamumalamu ete ye azali Moto oyo atyami na Nzambe mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bato bakufá.” (Mis. 10:42, NW) Nsango oyo tozali kosakola, yango nde ekosala ete baoyo bazali koyoka yango bázwa bomoi mpe baoyo bazali koboya koyoka yango bázanga bomoi. Bato bakosambisama na kotalela ndenge oyo bakoyamba to bakoboya koyamba nsango malamu. Lokola ezali bongo, mokumba na biso ezali ya kosala mpenza ndenge oyo batindaki biso tósala. Ata soki bato baboyi koyoka, yango ezali nde kopesa biso libaku ya komonisa bolingo makasi oyo tozali na yango mpo na bango mpe komipesa na biso na Yehova, na ndenge tozali kokoba kosala oyo tosengeli kosala. Kasi esuki kaka wana te.
4 Tozali kozwa matomba: Bato ya teritware na biso báyoka to báyoka te, soki tozali kosala mokano ya Nzambe, tokozwa kimya ya makanisi, tokomiyoka malamu, mpe tokozala na esengo; ezali na ndenge mosusu te oyo tokoki kozwa matomba yango. (Nz. 40:8, NW) Yango mpe ezali kosala ete bomoi na biso ekóma mpenza na ntina. Soki tozali kosakola mingi, tokobanda mpe kokanisa mingi elikya mpe esengo ya kozala na kati ya mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Soki tozali kokanisa mingi bilaka yango oyo ezali na kati ya Makomami, elimo na biso mpe boyokani na biso na Yehova ekokóma makasi.
5 Ata soki mosala na biso ya kosakola ezali kobimisa mbuma malamu mbala moko te, ntango mosusu momboto ya mateya ya solo oyo tolonaki na motema ya moto moko ekobima mpe ekokola na ntango oyo Yehova akolinga. (Yoa. 6:44; 1 Kol. 3:6) Moto moko te kati na biso ayebi soki milende oyo basaleli ya Yehova bazali kosala ekomema bato boni lisusu, ezala na esika tofandi to na mokili mobimba.
6 Sikoyo nde ezali ntango ya kotosa na lombangu mpenza koleka ndenge tozalaki kosala yango liboso, etinda ya Yesu oyo elobi ete: “Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka. Kasi oyo nazali koloba na bino, nazali koloba yango na bato nyonso, Bókɛngɛlaka.” (Mko. 13:33, 37, NW) Na yango, tiká ete biso nyonso tókoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi, tósepelisaka motema ya Yehova, wana tozali kosantisa nkombo na ye monene mpe mosantu.