Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/07 lok. 4
  • Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • “Tosi tosali teritware na biso mbala mingi!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Totika te kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mpo na nini kokóba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 7/07 lok. 4

Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala

1. Motuna nini etunami mpo na mosala na biso ya kosakola?

1 Na bisika mingi, tosakolaka na teritware na biso mobimba mbala na mbala. Tozongaka mbala na mbala na bandako oyo tosilá kosakola, ata soki bankóló ndako yango bayebisá biso ete basepelaka na nsango malamu te. Mpo na nini tokobaka kozongela bato oyo basepelaki mpenza te na nsango malamu?

2. Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka kozanga kotika?

2 Tolingaka Yehova mpe bato: Ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka kozanga kotika ezali mpo tolingaka Yehova. Motema na biso etindaka biso tókoba koyebisa bato makambo ya Nzambe na biso monene. (Luka 6:45) Bolingo oyo tolingaka Yehova etindaka biso tótosa mibeko na ye mpe tósalisa basusu na kotosa yango. (Mas. 27:11; 1 Yoa. 5:3) Mpiko mpe bosembo na biso na mosala ya kosakola etali te eyano oyo bato bakoki kopesa biso. Atako baklisto ya liboso banyokwamaki, kasi bakobaki kosakola “kozanga kotika.” (Mis. 5:42) Ntango bato baboyi koyoka biso, na esika ete tólɛmba nzoto, totikalaka nde ngwi, mpe yango emonisaka ete tolingi Yehova mingi mpe tokangami mpenza na ye.

3. Ndenge nini bolingo oyo tolingaka bato esalisaka biso tókoba kosakola?

3 Lisusu, tosakolaka kozanga kotika mpo tolingaka bazalani na biso. (Luka 10:27) Yehova alingi te ete moto ata moko abomama. (2 Pet. 3:9) Ata na bateritware oyo tosakolaka mbala na mbala, tozangaka te kokutana na bato oyo balingi kosalela Yehova. Na ndakisa, na Guadeloupe, moto moko kati na bato 56 azali Motatoli ya Yehova; nzokande, bato 214 bazwaki batisimo na mbula eleki. Pene na bato 20 000 bayanganaki na Ekaniseli, elingi koloba moto moko kati na bato 22 ya Guadeloupe ayanganaki na Ekaniseli!

4. Na ndenge nini makambo ebongwanaka na teritware?

4 Mbongwana na teritware: Bato bazali ntango nyonso kolongwa to koya kofanda na teritware na biso. Soki tozongi lisusu na ndako oyo baboyaki koyamba biso, mbala mosusu tokoki kokutana na moto mosusu ya libota yango, ekoki kozala moto moko oyo ayoká naino nsango malamu te, oyo akondima koyoka biso. To, tokoki kokuta bato ya sika na ndako yango, oyo bakosepela koyoka biso. Bana oyo baboti na bango batɛmɛlaka nsango malamu bakolaka mpe bakendaka kofanda bipai mosusu. Bana ya ndenge wana bakoki kosepela koyoka nsango ya Bokonzi.

5. Makambo nini ekoki kotinda bato básepela na nsango malamu?

5 Bato mpe babongwanaka. Ntoma Paulo azalaki liboso “motuki mpe monyokoli mpe moto ya lofundo.” (1 Tim. 1:13) Ndenge moko mpe, bato mingi oyo bazali kosalela Yehova lelo oyo bazalaki liboso kosepela na mateya ya solo te. Basusu kutu bazalaki kotɛmɛla nsango malamu na ntango moko boye. Lokola makambo ya mokili ezali kobongwana, batɛmɛli mosusu mpe bato mosusu oyo bazalaki kosepela na nsango malamu te bakoki kokóma na mposa ya koyoka yango. Basusu bakoki kobanda kosepela na nsango malamu nsima ya kokutana na likambo moko oyo etungisi bango, na ndakisa liwa ya ndeko moko, kobungisa mosala, mikakatano ya mbongo, to mikakatano ya nzoto.

6. Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola na esengo?

6 Ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali se kozinda, nzokande mosala na biso ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ezali se kokende liboso. (Yis. 60:22) Na bongo, tozali kokoba kosakola na esengo mpe tozali ntango nyonso na makanisi malamu. Ntango mosusu, moto oyo tokosolola na ye mbala ya nsima akoyoka biso. Tosengeli kokoba koloba! ‘Na kosaláká bongo, tokomibikisa biso moko mpe tokobikisa baoyo bazali koyoka biso.’​—1 Tim. 4:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto