Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/02 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 9/02 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko asepeli, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda yango, bokoki kopesa bango mokanda mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.

◼ Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2002 ekokabolama kaka soki lisangá euti na liyangani ya etúká.

◼ Bankulutu basengeli kobosana te kolanda malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, nk. 21-23, oyo etali moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to moto nyonso oyo amilongolaki ye moko, kasi azali na mposa ya kozonga na lisangá.

◼ Lokola elobamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2002, abonema ezali lisusu te; basakoli nde basengeli kobanda kokende kotika bazulunalo epai ya bato oyo basɛngaka yango. Biro ekotinda mbala moko bazulunalo na minɔkɔ ya bapaya ndenge komande ya lisangá esɛngaki yango. Ebongiseli yango ezali kosalelama sikoyo. Na yango, ezali na ntina te ete moto asala lisusu abonema ya bazulunalo na biso. Biro ekondima lisusu te abonema ya ndenge nyonso. Yango wana, ezali lisusu na ntina te ya kosalela molɔngɔ ya ‘Abonema’ oyo ezali na kalati ya mosakoli (S-21). Lisusu, fɔrmilɛrɛ S-1 ya sika oyo bakomeli ya masangá bakobanda kosalela ekozala na molɔngɔ yango te.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2002 ekozala na lisolo “Mabe nyonso eutaka na nani?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20%) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Biro ekondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi epesamaka liboso ete lisangá etinda komande na yango ya mikanda na biro. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko ete bákoka koyebisa yango na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda nini oyo ezali na molɔngɔ ya article sur demande spéciale.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto