Molato oyo ebongisami malamu emonisaka bobangi ya Nzambe
1. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na liyangani ya etúká oyo ezali koya?
1 Etikali moke Yehova akoyamba biso na liyangani ya etúká 2003 “Pesá Nzambe nkembo.” Oyo nde botɔndi tozali na yango epai ya Yehova na ndenge abengi biso na elambo ya elimo ya ndenge wana! Na molato na biso mpe na lolenge na biso ya kobongisa nzoto, tokoki komonisa ete tobangaka Nzambe mpe ete tozali na botɔndi mpo na bibongiseli na ye ya elimo.—Nz. 116:12, 17.
2. Mpo na nini ezali na ntina mingi mpo na biso ete molato mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto ezala pɛto mpe na mobulu te?
2 Pɛto mpe na mobulu te: Molato mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto esengeli komonisa ete tozali kolanda mitinda ya Nzambe na biso oyo azali pɛto mpe azali na mobulu te. (1 Kol. 14:33; 2 Kol. 7:1) Nzoto na biso, nsuki mpe manzaka na biso esengeli kozala pɛto, mpe tosengeli kolata mpe kobongisa nzoto malamu. Bato mingi lelo oyo balataka kaka bongobongo. Atako bongo, moklisto asengeli te kolanda elateli ya mabe ya vedɛti moko ya bafilme to ya moto moko ya masano oyo ayebani mingi. Soki tozali kolanda midɛlɛ nyonso oyo ebimi, ekozala mpasi mpo bato bámona bokeseni oyo ezalaka kati na baoyo basalelaka Nzambe mpe baoyo basalelaka ye te.—Mki. 3:18.
3. Tokoki kosala nini mpo ete ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato eyokana na toli oyo ezali na 1 Timote 2:9, 10?
3 Molato oyo ebongi na baministre ya Nzambe: Ntango ntoma Paulo akomelaki Timote oyo azalaki mokɛngɛli, alendisaki ye ete “basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, . . . na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na nzela ya misala ya malamu.” (1 Tim. 2:9, 10) Mpo molato na biso ebongisama malamu, esɛngaka liboso kokanisa malamu mpenza na yango. Molato na biso esengeli kozala malamu, pɛto mpe na mindɔndɔ te—mobulumobulu te to oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto te to komonisa nzoto.—1 Pet. 3:3.
4, 5. Basi mpe mibali baklisto basengeli kokeba na makambo nini?
4 Paulo akebisaki mpe baklisto na likambo ya kolekisa ndelo “na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi.” (1 Tim. 2:9) Basi oyo bazali baklisto ya bwanya bazalaka na bokatikati na oyo etali kolata babiju, kopakola mafuta to kosala makiyajɛ mpe biloko mosusu ya monzele.—Mas. 11:2.
5 Makanisi oyo ezali na toli yango oyo Paulo apesaki basi baklisto etali mpe mibali ya baklisto. Bandeko mibali basengeli koboya elateli ya bato ya mokili. (1 Yoa. 2:16) Na ndakisa, na bikólo mosusu, bato basepelaka kolata bilamba ya mineneminene mpe ya mobulumobulu, kasi molato ya ndenge wana ebongi te mpo na ministre ya Nzambe.
6. Mpo na nini tosengeli kozala na molato ya malamu mpe lolenge ya kobongisa nzoto ya malamu ntango tozali kokende mpe kouta na liyangani, ntango tozali na liyangani mpe nsima ya programɛ ya mokolo mokomoko?
6 Na ntango tozali kominanola: Bandeko mingi ya mibali mpe ya basi bazalaka ndakisa ya malamu na molato na bango mpe na ndenge oyo babongisi nzoto na bango ntango bazali na liyangani. Kasi, emonani ete bandeko mosusu batalelaka te elateli na bango ntango bazali na mobembo mpo na kokende na liyangani to ntango bazali kozonga na liyangani to ntango bazali kominanola nsima ya programɛ ya mokolo mokomoko. Na ntembe te, ndenge tozali komonana na miso ya bato—ezala ntango programɛ ezali koleka to na bantango mosusu—ezalaka na ntina mingi mpo na bato oyo batalaka basaleli ya Nzambe. Lokola tolataka makarɔ na biso ya liyangani, tosengeli ntango nyonso mpe bisika nyonso kolata lokola ministre ya Nzambe asengeli kolata. Yango etindaka bato mwa mingi bápesa biso longonya mpe efungolaka nzela mpo na litatoli.—1 Kol. 10:31-33.
7. Molato ya malamu mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto ekoki kotinda bato mosusu básala nini?
7 Se ndenge oyo kosɛka mwa moke ebongisaka elongi, ndenge moko mpe molato ya malamu mpe kobongisa nzoto malamu epesaka lokumu na nsango oyo tomemelaka bato mpe na ebongiseli oyo tomonisaka. Bato mosusu oyo bakotala biso na liyangani ya etúká ya mbula oyo “Pesá Nzambe nkembo,” ntango mosusu bakotuna biso mpo na nini tokeseni mingi na bato mosusu mpe bakoki koloba: ‘Tokokenda na bino elongo, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.’ (Zek. 8:23) Tiká ete mokomoko kati na biso amonisa limemya mpo na Yehova na molato na ye mpe lolenge na ye ya kobongisa nzoto.
[Etanda na lokasa 5]
Omipesa nzoto kilo na ndenge ozali komonana na miso ya bato
▪ Ntango ozali kokende na liyangani to kozonga na ndako
▪ Na esika ya liyangani
▪ Na ntango ozali kominanola