Molato oyo eyokani na bopɛto ya bizaleli mpe oyo ebongi kokumisama
1. Ntango tozali komibongisa mpo na liyangani ya etúká, mpo na nini ezali na ntina tótya likebi na ndenge oyo tokomonana na miso ya bato?
1 Mobali moko oyo asalaka na otɛlɛ moko alobaki boye mpo na bandeko na biso mibali mpe basi oyo bayanganaki na liyangani moko ya etúká ya mbula eleki: “Batatoli ya Yehova baleki bato nyonso. Bato na bino bazali na boboto, balati malamu, mpe bazali mpenza na limemya.” Na liyangani mosusu, mwasi moko oyo asalaka na otɛlɛ moko alobaki boye: “Emonani polele ete bato na bino balataka mpenza mpo na kosepelisa Nzambe.” Ezalaka mpasi te mpo bato báyeba bandeko oyo bayei na liyangani. Yango wana, tolingaka kolata “na ndenge oyo ebongi na nsango malamu,” mpe mbala mingi, yango etindaka bato ya libándá báloba malamu mpo na biso mpe emonisaka polele ete tozali baministre ya Nzambe. (Filp. 1:27) Ntango tozali komibongisa mpo na liyangani ya etúká, ezali malamu tóluka koyeba libelalibela ndenge oyo tokomonana na miso ya bato.
2. Mpo na nini ezali mpasi kolata mpe kobongisa nsuki na ndenge oyo eyokani na bopɛto ya bizaleli?
2 Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bwanya oyo euti na likoló ezali libosoliboso pɛto na bizaleli.” (Yak. 3:17) Ekoki kozala mpasi kolata na ndenge oyo eyokani na bopɛto ya bizaleli. Mokili ya Satana oyo etondi na makambo ya mbindo ezali kotinda bato bábongisaka nzoto na ndenge oyo eleki ndelo, oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto mpe ya mobulumobulu, nzokande nyonso wana ebongi te. (1 Yoa. 2:15-17) Yango wana, ntango tozali koluka ndenge tokolata mpe tokobongisa nsuki na biso, tosengeli kotalela likebisi ya Biblia oyo elobi ete “tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu . . . na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Tito 2:12) Tokolinga ata moke te ete ndenge oyo tobongisi nzoto etungisa basusu, ata soki bazali bandeko na biso, bato oyo bazali kosala na otɛlɛ to na restora, to bato mosusu oyo bazali kotala biso.—1 Kol. 10:32, 33.
3. Mituna nini ekosalisa biso tótalela ndenge oyo tokomonana na miso ya bato?
3 Molato oyo eleki ndelo te mpe ya malamu: Ntango ozali komibongisa mpo na liyangani, omituna mituna oyo: ‘Molato na ngai eleki ndelo to ezali nde kobenda likebi mingi epai na ngai? Ezali komonisa mpenza ete nazali na limemya mpo na basusu? Mabaya to babluze na ngai etiki mapeka nyonso polele to ezali mokuse mingi? Bilamba na ngai etiki biteni mingi ya nzoto na ngai polele to ekangi ngai mingi? Bilamba na ngai ezali mpenza pɛto mpe ezali na nsolo te? Na ntango ya kolya na otɛlɛ to ya kozwa mopɛpɛ nsima ya programɛ, nakozala kaka na molato ya malamu mpe ya pɛto oyo ekomonisa ete nazali ministre to nakolata na ndenge ya mobulumobulu, na ndenge bato mosusu bazali kolata mikolo oyo, mpe na ndenge oyo ebongi te na moto oyo ayei mpo na liyangani mpe alati makarɔ? Bilamba oyo nakolata na ntango ya kozwa mopɛpɛ ekopekisa ngai napesa litatoli ya libaku malamu?’—Lom. 15:2, 3; 1 Tim. 2:9.
4. Ndenge nini basusu bakoki kosalisa biso tólataka na ndenge oyo eyokani na bizaleli ya pɛto?
4 Toli ya baklisto oyo bakɔmeli ekoki mpe kosalisa biso. Basi oyo babalá basengeli kotuna mibali na bango oyo bato mosusu bakoki kokanisa na molato na bango. Baboti oyo babangaka Nzambe bakoki kosalisa bana na bango na likambo yango. Lisusu, bandeko basi oyo bakómi mikóló mpe babangaka Nzambe bakoki “[kozongisa] bilenge basi na makanisi na bango ya malamu . . . bázala bato ya makanisi malamu, pɛto na bizaleli” na oyo etali molato na bango “mpo liloba ya Nzambe efingama te.” (Tito 2:3-5) Mikanda na biso ezali na ebele ya bafɔtɔ ya bato balati na kolekisa ndelo te mpe na ndenge ya malamu, yango ekoki kosalisa biso.
5. Ndenge nini biso nyonso tokoki kopesa Yehova lokumu na boumeli ya liyangani?
5 Tópesa Yehova lokumu: Mayangani ya etúká epesaka biso nyonso, kaka te baoyo bazalaka na mikumba na programɛ, libaku ya malamu mpenza ya kokumisa Yehova. Ya solo, etamboli mpe elobeli na biso ya boklisto ekokumisa ye. Kasi, eloko ya libosoliboso oyo bato bamonaka epai na biso ezali molato na biso mpe ndenge oyo tobongisi nsuki. Tiká ete biso nyonso tókumisa Yehova na molato ya pɛto mpe oyo ebongi kokumisama.—Nz. 148:12, 13.
[Etanda na lokasa 6]
Lisalisi mpo na molato oyo ebongi kokumisama
◼ Liloba ya Nzambe
◼ Komitalela yo moko
◼ Toli ya bato mosusu
◼ Mikanda oyo elimbolaka Biblia