Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko asepeli, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda yango, bokoki kopesa bango buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo to mokanda mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to buku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1988, soki ezali na libombo ya lisangá. Soki bozali na yango te, bótuna na masangá ya pembeni soki bazali na yango mingi mpo bápesa bino ndambo. Masangá oyo ezali na babuku ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu.
◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali na “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2004” mpe tosengeli kobatela yango malamu mpamba te tokosalela yango na boumeli ya mobu 2004 mobimba.
◼ Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango ya makita na mokolo ya 1 Yanuali, mokomeli ya lisangá asengeli kotondisa formilɛrɛ S-AB-5 (Réunions de la congrégation) mpe kotinda yango na biro.
◼ Na paragrafe ya liboso ya mokanda oyo biro etindelaki basakoli nyonso, mokanda oyo ezali na etanda na lokasa ya liboso ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2003, ezali nde bato koleka 15 000 oyo babandaki koyekola Biblia na boumeli ya basanza ya ebandeli ya mobu ya mosala 2003 kasi bato koleka 100 000 te.