Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/03 nk. 3-6
  • Programɛ mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2004

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2004
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Malako
  • PROGRAMƐ
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 10/03 nk. 3-6

Programɛ mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2004

Malako

Na mobu 2004, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

MIKANDA: Biblia haut-fleuve ná Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi [be], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].

Eteyelo esengeli kobanda NA NTANGO ETYAMI na loyembo, na libondeli mpe na kotombela bandeko boyei malamu, mpe nsima na yango ekosalema boye:

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU: Miniti 5. Mokɛngɛli na eteyelo, mopesi-toli mosungi, to nkulutu mosusu oyo azali na makoki asengeli kosala lisolo likoló ya toli moko mpo na koloba malamu, oyo ekouta na buku Eteyelo ya mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, mosaleli na misala ya makoki akoki kosala lisolo yango.) Soki liyebisi ezali te, esengeli mpe kolobela makambo oyo ezali na bitanda na nkasa oyo lisolo yango ezali. Lisolo oyo ekolobela badevuare te. Badevuare yango etali moto na moto mpe ezali mpo na kopesa toli na nkuku.

LISOLO NO.1: Miniti 10. Ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala, mpe mateya na yango ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 10 kozanga kotuna mituna ya bozongeli. Ntina ya masolo yango ezali ya kolobela makanisi nyonso oyo ezali na lisolo, komonisa ndenge ya kosalela yango mpe komonisa polele makambo oyo ekozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela bobele motó ya likambo oyo epesami. Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu oyo, basengeli kokeba ete bátosa ngonga oyo epesami. Bakopesa bango toli na nkuku soki esengeli.

MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti motoba ya ebandeli, nkulutu moko to mosaleli na misala moko ya makoki akosala lisolo yango na kotalela bamposa ya lisangá. Soki alingi, akoki kobimisa makanisi na mikapo oyo asepeli na yango kati na mikapo oyo ebongisami na programɛ ya botángi ya Biblia mpo na pɔsɔ yango. Lisolo yango esengeli te kolobela bobele na mokuse makambo oyo ezali na mikapo oyo epesami mpo na kotánga. Kasi, ntina ya libosoliboso ya lisolo oyo ezali ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa bango. Molobi asengeli kokeba ete alekisa te miniti motoba oyo etyami mpo na eteni oyo ya ebandeli. Asengeli kotika miniti minei ya nsuka mpo na kosolola na bayangani. Akosɛnga bango báyebisa na mokuse (eleka segɔnde 30 te) makanisi oyo basepelaki na yango ntango batángaki mikapo ya Biblia oyo ezali na programɛ mpe matomba oyo bakoki kozwela yango. Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi bákende na bakelasi na bango.

LISOLO NO. 2: Miniti 4. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Botángi yango ekozala mingimingi na Biblia. Mbala moko na sanza, botángi yango ekouta na lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mwana-kelasi akosala kaka botángi, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Botángi ya pɔsɔ na pɔsɔ ekoki kozala molai to mokuse, kasi esengeli koleka miniti minei te. Liboso ete mokɛngɛli na eteyelo akabola masolo oyo bana-kelasi bakotánga, asengeli naino ye moko kotánga yango mpo na koyeba ndenge ya kokabola masolo yango na kotalela mbula mpe makoki ya mwana-kelasi mokomoko. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe kotánga ndenge bameseni koloba.

LISOLO NO. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai na ndeko mwasi moko. Bana-kelasi oyo bakosala lisolo yango bakopona kadre moko kati na oyo ezali na lokasa 82 ya buku Eteyelo ya mosala to mokɛngɛli na eteyelo akoponela bango yango. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe komonisa ndenge ya kosalela yango na motindo moko ya mosala ya kosakola oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Esengeli kopesa bana-kelasi ya sika masolo oyo epai bakozwa yango emonisami polele. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa polele makanisi ya lisolo oyo bapesi ye mpe na ndenge azali kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe asosola makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokumba oyo ekopesama kaka na mwana-kelasi oyo ayebi kotánga. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo azali kosala lisolo.

LISOLO NO. 4: Miniti 5. Mwana-kelasi asengeli kobimisa makanisi oyo eyokani na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, akosala yango lokola lisukulu mpo na bayangani oyo bakozala wana. Soki bapesi yango na ndeko mwasi, akosala yango na kolanda malako oyo epesami na lisolo No. 3. Mokɛngɛli na eteyelo akopesa ndeko mobali lisolo No. 4 soki amoni ete ebongi ete lisolo yango esalema na ndeko mobali. Tobendi likebi na bino na likambo oyo: mitó ya makambo oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango esengeli kopesama kaka na bandeko mibali mpe bakosala yango lokola lisukulu.

BOUMELI: Ndeko moko te asengeli kolekisa ngonga oyo epesami, ata mpe mokɛngɛli na eteyelo asengeli kokeba ete alekisa ngonga te ntango azali kopesa toli na bana-kelasi. Soki bandeko oyo bazali kosala masolo No. 2 kino No. 4 balekisi ngonga, bakokata bango na mayele. Soki ndeko oyo akosala lisolo ya liboso, oyo etali toli mpo na koloba malamu, to ndeko oyo akosala lisolo No.1, to ndeko oyo akosala makanisi ya ntina na botángi ya Biblia balekisi ngonga, basengeli kozwa toli na nkuku. Bandeko nyonso oyo bazali na masolo basengeli kotosa ngonga oyo bapesi bango. Longola loyembo mpe libondeli, eteyelo mobimba esengeli koumela miniti 45.

TOLI: Miniti 1. Nsima ya lisolo ya mwana-kelasi mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo asengeli kozwa kaka miniti moko mpo na kopesa toli; na toli na ye, asengeli kopesa mwana-kelasi longonya na likambo moko oyo asalaki malamu na lisolo na ye. Akosuka kaka te na koloba ‘osali yango malamu,’ kasi asengeli komonisa ntina oyo ye alobi ete likambo yango ezali malamu. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli, nsima ya makita to na ntango mosusu.

MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, lisangani ya bankulutu ekopona nkulutu moko ya makoki, soki azali, oyo akozala mopesi-toli mosungi. Soki bankulutu bazali mwa mingi na lisangá, boye nkulutu mokomoko ya makoki akobanda kokokisa mokumba yango na boumeli ya mbula moko. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ezali ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, epai ya ndeko mobali oyo azali kosala lisolo No.1 mpe ndeko mobali oyo azali kosala makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te ete apesaka toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala. Ebongiseli oyo ekokoba na mobu 2004 mpe ekoki kobongwana nsima.

LOKASA YA TOLI: Ezali na buku.

BOZONGELI YA KOLOBA: Miniti 30. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli ya koloba. Liboso ya kosala yango, lisolo etali toli mpo na koloba malamu mpe oyo etali makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge oyo tolobeli yango awa liboso. Bozongeli ya koloba ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na sanza mibale oyo eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ wana.

PROGRAMƐ

5 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 1-5 Loyembo 154

Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba (be lok. 157 par.1–lok. 158 par.1)

No. 1: Ndenge ya kosala plan ya lisolo na yo (be nk. 39-42)

No. 2: Genese 2:7-25

No. 3: “Kondimana ya sika” elobelaka mpe paladiso oyo ekozala awa na mabelé, to likambo yango elobelami kaka na “Kondimana ya kala”? (rs lok. 274 par. 6- lok. 275 par. 2)

No. 4: aLiteya nini tokoki kozwa na bandakisa, oyo ezali na Biblia, ya bato oyo baboyaki kosala oyo ezali malamu?

12 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 6-10 Loyembo 215

Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali kolobela na lisukulu na yo (be lok. 158 par. 2-4)

No. 1: Bopɛto elimboli mpenza nini? (w02 1/2 nk. 4-7)

No. 2: Genese 8:1-17

No. 3: Ntina oyo kokosa ezali mabe

No. 4: Ntina oyo “Paladiso” oyo Luka 23:43 elobeli ekoki kozala esika moko ya Hadesi te to mpe ya Lola te (rs lok. 276 par. 1–lok. 277 par. 1)

19 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 11-16 Loyembo 218

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalisa basusu bákanga ntina ya nsango na biso (be lok. 159 par. 1-4)

No. 1: Mitinda ya Nzambe ekoki komemela yo matomba (w02 15/2 nk. 4-7)

No. 2: Genese 13:1-18

No. 3: Nini emonisi ete paladiso oyo Luka 23:43 elobeli ekozala awa na mabelé? (rs lok. 277 par. 2–lok. 278 par. 2)

No. 4: Ntina oyo Batatoli ya Yehova bayebisaka elikya na bango epai ya bato mosusu

26 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 17-20 Loyembo 106

Toli mpo na koloba malamu: Kopona maloba (be lok. 160 par. 1-3)

No. 1: Koyeba komitya na esika ya basusu ezali sɛkɛlɛ ya kozala na boboto mpe na motema mawa (w02 15/4 nk. 24-27)

No. 2: w02 1/1 nk. 10-11 par. 9-11

No. 3: Maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 13:24 elimboli nini?

No. 4: Ndenge nini moto akoki kozwa boyebi mpe bwanya ya solosolo? (rs lok. 282 par. 5–lok. 283 par. 2)

2 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 21-24 Loyembo 64

Toli mpo na koloba malamu: Elobeli oyo ezali mpasi te mpo bato bákanga ntina na yango (be lok. 161 par. 1-4)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masolo na yo ya eteyelo (be lok. 43 par. 1–lok. 44 par. 3)

No. 2: Genese 21:1-21

No. 3: Mateya ya filozofi eutá wapi? (rs lok. 283 par. 3–lok. 284 par. 2)

No. 4: bNtina oyo esengeli kozwa na lisɛki te elaka oyo bopesani ya kobalana

9 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 25-28 Loyembo 9

Toli mpo na koloba malamu: Maloba ndenge na ndenge mpe oyo ebongi (be lok. 161 par. 5–lok. 163 par. 1)

No. 1: Ndenge ya kobongisa lisolo oyo bapesi motó ya likambo mpe bamonisi ndenge ya kosala yango (be lok. 44 par. 4–lok. 46 par. 2)

No. 2: Genese 28:1-15

No. 3: Ndenge ya kozwa kimya ya motema na mokili oyo etondi na yikiyiki

No. 4: Mpo na nini ezali likambo ya mayele mpenza koyekola mateya ya Yesu Klisto na esika ya koyekola mateya ya filozofi ya bato? (rs lok. 284 par. 3–lok. 285 par. 3)

16 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 29-31 Loyembo 160

Toli mpo na koloba malamu: Maloba oyo ezali komonisa bonene ya likambo, mayoki mpe ezali komonisa likambo ndenge ezali (be lok. 163 par. 2–lok. 164 par. 2)

No. 1: Bosembo etambwisaka bato ya malamu (w02 15/5 nk. 24-27)

No. 2: w02 1/2 nk. 15-16 par. 6-10

No. 3: Mabondeli nini Nzambe asepelaka koyoka? (rs lok. 286 par. 1–lok. 287 par. 1)

No. 4: Ntina oyo baklisto basengeli kozala na ezaleli malamu

23 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 32-35 Loyembo 1

Toli mpo na koloba malamu: Elobeli oyo eyokani na mibeko ya lokota (be lok. 164 par. 3–lok. 165 par. 1)

Bozongeli ya koloba

1 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 36-39 Loyembo 49

Toli mpo na koloba malamu: Kosalela plan (be lok. 166 par. 1–lok. 167 par. 2)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masukulu ya lisangá (be lok. 47 par. 1–lok. 49 par. 2)

No. 2: Genese 37:12-28

No. 3: Mpo na nini kondima na biso esengeli kokangana na ezaleli ya koyika mpiko?

No. 4: cMpo na bantina nini Nzambe akoki koboya koyoka mabondeli ya moto? (rs lok. 287 par. 2–lok. 288 par. 1)

8 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 40-42 Loyembo 205

Toli mpo na koloba malamu: Tyá makanisi na yo na molɔngɔ (be lok. 167 par. 3–lok. 168 par. 2)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masolo ya Likita ya Mosala mpe masukulu mosusu (be lok. 49 par. 3–lok. 51 par. 3)

No. 2: Genese 42:1-20

No. 3: Ndenge ya kokóma na boninga makasi na Yehova

No. 4: dMakambo nini ebongi kobondela mpo na yango? (rs lok. 288 par. 2–9)

15 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 43-46 Loyembo 67

Toli mpo na koloba malamu: Salá ete plan na yo ezala na mindɔndɔ te (be lok. 168 par. 3–lok. 169 par. 6)

No. 1: Ntango nini Yehova apambolaka molende ya solosolo? (w02 1/8 nk. 29-31)

No. 2: Genese 43:1-18

No. 3: eSoki moto alobi na yo, ‘Tóbondela naino, bongo na nsima oyebisa ngai nsango oyo oyei na yango’ (rs lok. 289 par. 1-2)

No. 4: Ndenge nini tokoki komizwela baninga na nzela ya bomɛngo oyo ezangi boyengebene?

22 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 47-50 Loyembo 187

Toli mpo na koloba malamu: Kobimisa makanisi na molɔngɔ (be lok. 170 par. 1–lok. 171 par. 2)

No. 1: Mpo na nini Yehova andimaki mbeka ya Abele mpe aboyaki oyo ya Kaina? (w02 1/8 lok. 28)

No. 2: Genese 47:1-17

No. 3: Wapi mwa bisakweli minene ya Biblia oyo ekokisami naino te? (rs lok. 290 par. 1–lok. 291 par. 1)

No. 4: Ntina oyo kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya

29 Mar. Botángi ya Biblia: Exode 1-6 Loyembo 52

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobimisa makanisi na molɔngɔ (be lok. 171 par. 3–lok. 173 par. 1)

No. 1: Ndenge nini likoki ya kokanisa ekoki kobatela yo? (w02 15/8 nk. 21-24)

No. 2: w02 15/2 nk. 19-20 par. 7-11

No. 3: Ndenge oyo Yehova atalelaka lolendo

No. 4: Mpo na nini baklisto basengeli koluka mpenza koyeba bisakweli ya Biblia? (rs lok. 291 par. 2-6)

5 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 7-10 Loyembo 61

Toli mpo na koloba malamu: Salelá kaka makanisi oyo eyokani na lisolo na yo (be lok. 173 par. 2-5)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masukulu ya bato nyonso (be lok. 52 par. 1–lok. 54 par. 1)

No. 2: Exode 8:1-19

No. 3: fSoki moto alobi na yo, ‘Bolekisi kolobela bisakweli’ (rs lok. 291 par. 7-lok. 292 par. 1)

No. 4: Ntina oyo elikya ezali lokola “longo mpo na molimo”

12 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 11-14 Loyembo 87

Toli mpo na koloba malamu: Koloba na maloba na yo moko (be lok. 174 par. 1–lok. 175 par. 5)

No. 1: Makambo oyo molobi asengeli kopona (be lok. 54 par. 2-4; lok. 55, etanda)

No. 2: Exode 12:1-16

No. 3: Mpo na nini tosengeli kondima disipilini ya Yehova?

No. 4: Nini esimbi liteya ya epongelo? (rs lok. 292 par. 2-lok. 293 par. 4)

19 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 15-18 Loyembo 171

Toli mpo na koloba malamu: Koloba na maloba na yo moko—Kebá na mitambo na yango (be lok. 176 par. 1–lok. 177 par. 2)

No. 1: Ndenge nini tosengeli kotalelaka komekama? (w02 1/9 nk. 29-31)

No. 2: w02 1/3 nk. 15-16 par. 8-11

No. 3: Moto oyo akufi asengeli kozwa etumbu mosusu mpo na masumu na ye? (rs lok. 293 par. 6-lok. 294 par. 3)

No. 4: gNtina oyo libala esengeli kosangisa bato mibale bomoi na bango mobimba

26 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 19-22 Loyembo 59

Toli mpo na koloba malamu: Soki esɛngi kolimbola (be lok. 177 par. 3–lok. 178 par. 2)

Bozongeli ya koloba

3 Mai Botángi ya Biblia: Exode 23-26 Loyembo 13

Toli mpo na koloba malamu: Koloba lokola ozali kosolola na moto (be nk. 179-180)

No. 1: Kolisá makoki na yo ya koteya (be lok. 56 par. 1–lok. 57 par. 2)

No. 2: Exode 23:1-17

No. 3: Ndenge nini Yehova akoki kosalisa moto atika bizaleli ya mabe?

No. 4: Bato ya mposo ndenge na ndenge bautá wapi? (rs lok. 294 par. 4-lok. 295 par. 2)

10 Mai Botángi ya Biblia: Exode 27-29 Loyembo 28

Toli mpo na koloba malamu: Kobongisa mongongo (be lok. 181 par. 1-4)

No. 1: “Yebá kokesenisa” (be lok. 57 par. 3–lok. 58 par. 2)

No. 2: Exode 28:29-43

No. 3: Kaina azwaki mwasi na ye wapi lokola libota ezalaki kaka moko na mabelé mobimba? (rs lok. 295 par. 3–5)

No. 4: Ntina oyo ebongi te kozala na makanisi mabe mpo na bato ya loposo mosusu

17 Mai Botángi ya Biblia: Exode 30-33 Loyembo 93

Toli mpo na koloba malamu: Koyeba kopema malamu (be lok. 181 par. 5–lok. 184 par. 1; lok. 182, etanda)

No. 1: Lendisá bato oyo bazali koyoka bákanisa (be lok. 58 par. 3–lok. 59 par. 3)

No. 2: Exode 30:1-21

No. 3: Mpo na nini kozala na elimo ya boboto?

No. 4: Ndenge nini tokoki kolimbola likambo oyo ete bato bazali na mposo ndenge na ndenge mpe bakeseni na makambo mosusu? (rs lok. 296 par. 1–lok. 297 par. 2)

24 Mai Botángi ya Biblia: Exode 34-37 Loyembo 86

Toli mpo na koloba malamu: Nyolisá misisa na yo (be lok. 184 par. 2–lok. 185 par. 3; lok. 184, etanda)

No. 1: Monisá ndenge ya kosalela mateya na yo mpe zalá ndakisa malamu (be lok. 60 par. 1–lok. 61 par. 3)

No. 2: Exode 36:1-18

No. 3: Bato nyonso bazali bana ya Nzambe? (rs lok. 297 par. 3–lok. 298 par. 1)

No. 4: Mpo na nini kozala sembo ata na makambo mike?

31 Mai Botángi ya Biblia: Exode 38-40 Loyembo 202

Toli mpo na koloba malamu: Kosepela na moto oyo azali koyoka yo (be lok. 186 par. 1-4)

No. 1: Ndenge ya koyeba kosolola na bato (be lok. 62 par. 1–lok. 64 par. 1)

No. 2: w02 1/5 nk. 19-20 par. 3-6

No. 3: Soki moto akangi malamu ntina ya 1 Yoane 3:19, 20, ndenge nini yango ekoki kobɔndisa ye?

No. 4: Bato ya mposo nyonso bakoyokana mokolo mosusu malamu lokola bandeko? (rs lok. 298 par. 2–lok. 299 par. 1)

7 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 1-5 Loyembo 123

Toli mpo na koloba malamu: Yoká na likebi mpenza (be lok. 187 par. 1-5)

No. 1: Ndenge ya kokoba lisolo elongo na bato (be lok. 64 par. 2–lok. 65 par. 4)

No. 2: Levitike 3:1-17

No. 3: Ndenge nini liwa ya Yesu Klisto ekesanaki na oyo ya bamartiru mosusu? (rs lok. 299 par. 2-lok. 300 par. 2)

No. 4: Mabe ezali wapi soki moto amikɔtisi na misala oyo ezali na boyokani na bilimo mabe?

14 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 6-9 Loyembo 121

Toli mpo na koloba malamu: Salisá basusu bákola (be lok. 187 par. 6–lok. 188 par. 3)

No. 1: Luká koyeba mpo na nini moto atuni yo motuna (be lok. 66 par. 1–lok. 68 par. 1)

No. 2: Levitike 7:1-19

No. 3: Ndenge nini tokoki koyeba koyina makambo ya mabe?

No. 4: Mpo na nini lisiko esengelaki kofutama ndenge oyo efutamaki? (rs lok. 300 par. 4–6)

21 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 10-13 Loyembo 183

Toli mpo na koloba malamu: Salisá bango mpenza (be lok. 188 par. 4–lok. 189 par. 4)

No. 1: Yebá kopesa biyano (be lok. 68 par. 2–lok. 70 par. 4)

No. 2: Levitike 11:1-25

No. 3: Mpo na nini Nzambe alobaki kaka te ete bato nyonso oyo bakotosa ye bakozala na bomoi ya seko? (rs lok. 301 par. 1–4)

No. 4: Ndenge oyo Yehova atalelaka koyiba na ekzamɛ (tricher)

28 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 14-16 Loyembo 216

Toli mpo na koloba malamu: Komemya bato (be lok. 190 par. 1-lok. 191 par. 1)

Bozongeli ya koloba

5 Yuli Botángi ya Biblia: Levitike 17-20 Loyembo 54

Toli mpo na koloba malamu: Limemya na ntango okutani na bato (be lok. 191 par. 2–lok. 192 par. 1)

No. 1: Ndenge ya kosolola na nzela ya mikanda (be nk. 71-73)

No. 2: Levitike 17:1-16

No. 3: Tyelá ebongiseli ya Yehova motema

No. 4: Mbeka ya Yesu esalelamaki libosoliboso mpo na litomba ya banani, mpe na mokano nini? (rs lok. 302 par. 1-2)

12 Yuli Botángi ya Biblia: Levitike 21-24 Loyembo 138

Toli mpo na koloba malamu: Limemya na elobeli na biso (be lok. 192 par. 2–lok. 193 par. 2)

No. 1: Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso (be lok. 74 par. 1–lok. 75 par. 3)

No. 2: Levitike 22:1-16

No. 3: Na mikolo na biso, banani lisusu bazali kozwa litomba na mbeka ya Yesu? (rs lok. 302 par. 3-lok. 303 par. 2)

No. 4: Yehova azalaki kaka Nzambe ya ekólo ya Bayuda?

19 Yuli Botángi ya Biblia: Levitike 25-27 Loyembo 7

Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba (be lok. 194 par. 1–lok. 195 par. 2)

No. 1: Salelá makoki na yo (be lok. 75 par. 4–lok. 77 par. 2)

No. 2: Levitike 25:1-19

No. 3: Ndenge oyo terorizme ekosila

No. 4: Mapamboli nini lisiko ekomema na mikolo ezali koya? (rs lok. 303 par. 3-lok. 304 par. 2)

26 Yuli Botángi ya Biblia: Mituya 1-3 Loyembo 30

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya komonisa ete ondimi mpenza likambo moko (be lok. 195 par. 3–lok. 196 par. 4)

No. 1: Baklisto basengeli kozala na zuwa? (w02 15/10 nk. 28-31)

No. 2: w02 15/6 nk. 18-19 par. 6-9

No. 3: Tosengeli kosala nini mpo na kozwa litomba na mbeka ya Yesu? (rs lok. 304 par. 3–6)

No. 4: Ezali mabe kolela soki moto oyo olingaka mingi akufi?

2 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 4-6 Loyembo 128

Toli mpo na koloba malamu: Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo (be lok. 197 par. 1-3)

No. 1: Ndenge oyo tokoki kosala mpo ete mikolo nyonso tósepelisaka Yehova (w02 15/11 nk. 20-23)

No. 2: Mituya 6:1-17

No. 3: Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa bato bátika koyinana?

No. 4: Lisiko esengeli kotinda biso tósalaka nini na bomoi na biso? (rs lok. 305 par. 1-3)

9 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 7-9 Loyembo 35

Toli mpo na koloba malamu: Koloba na mayele ntango tozali kosakola (be lok. 197 par. 4–lok. 199 par. 1)

No. 1: Ekoki kosalema ete bato nyonso bázala ndenge moko? (w02 1/1 nk. 4-7)

No. 2: Mituya 8:1-19

No. 3: Ntango ntoma Paulo alimbolaki ete baklisto ‘bakomemama’ mpo na kozala elongo na Nkolo, azalaki kolobela likambo nini? (rs lok. 130 par. 2-lok. 131 par. 1)

No. 4: Nani azali Motɛmɛli ya Klisto?

16 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 10-13 Loyembo 203

Toli mpo na koloba malamu: Koloba maloba oyo ebongi na ntango oyo ebongi (be lok. 199 par. 2-5)

No. 1: Ndimá Yehova Nzambe oyo azali mpenza (w02 15/1 nk. 5-7)

No. 2: Mituya 12:1-16

No. 3: Ebongi ete Nzambe ya bolingo azongisaka mabe?

No. 4: Ntango Klisto akomema baklisto ya sembo na likoló, bato bakomona ye atɛlɛmi likoló ya lipata? (rs lok. 131 par. 2-lok. 132 par. 1)

23 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 14-16 Loyembo 207

Toli mpo na koloba malamu: Koloba na mayele na kati ya libota mpe na bato mosusu (be lok. 200 par. 1-lok. 201 par. 1)

No. 1: Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli (w02 15/1 nk. 21-23)

No. 2: w02 15/7 nk. 23-24 par. 15-19

No. 3: Baklisto bakoki kokende na likoló na nzoto na bango ya mosuni? (rs lok. 132 par. 2-3)

No. 4: hNtina oyo masano ya video oyo elakisaka mobulu ebongi te mpo na baklisto

30 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 17-21 Loyembo 150

Toli mpo na koloba malamu: Kolendisa bato mpe kolobela mingi makambo ya malamu be lok. 202 par. 1–lok. 203 par. 2)

Bozongeli ya koloba

6 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 22-25 Loyembo 22

Toli mpo na koloba malamu: Salá ete elobeli na yo elendisa bato nyonso (be lok. 203 par. 3–lok. 204 par. 2)

No. 1: Mpo na nini mokili ebomamaká na ntango ya kala? (w02 1/3 nk. 5-7)

No. 2: Mituya 22:1-19

No. 3: Baklisto ya sembo bakomemama na likoló na ndenge ya nkuku kozanga ete bákufa? (rs lok. 133 par. 1–4)

No. 4: iNtina oyo baboti oyo bazali baklisto basengeli kotángelaka bana na bango mikanda

13 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 26-29 Loyembo 71

Toli mpo na koloba malamu: Ntango ozali kosolola na bandeko baklisto (be lok. 204 par. 3–lok. 205 par. 4)

No. 1: Ndenge oyo kobeba binama ya nzoto ekosila (w02 1/5 nk. 4-7)

No. 2: Mituya 29:1-19

No. 3: Na ntango ya bolɔzi monene, ndenge nini baklisto ya solo bakobatelama? (rs lok. 134 par. 1–5)

No. 4: Ndenge nini bilaka ya Nzambe ekómi Ɛɛ na nzela ya Yesu Klisto?

20 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 30-32 Loyembo 51

Toli mpo na koloba malamu: Kozongela likambo mpo na kobimisa yango polele (be lok. 206 par. 1-4)

No. 1: Loná boyengebene, okobuka motema-boboto ya Nzambe (w02 15/7 nk. 28-31)

No. 2: Mituya 30:1-16

No. 3: Mpo na nini baklisto mosusu bazali komemama na likoló elongo na Klisto? (rs lok. 134 par. 7-lok. 135 par. 1)

No. 4: jNtina oyo tosengeli koboya mikanda, bafilme mpe bafɔtɔ oyo elakisaka bolumbu ya bato

27 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 33-36 Loyembo 100

Toli mpo na koloba malamu: Kozongela likambo mpo na kobimisa yango polele, na mosala ya kosakola mpe na ntango ozali kosala masukulu (be lok. 207 par. 1–lok. 208 par. 3)

No. 1: Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo? (w02 15/9 nk. 4-7)

No. 2: w02 1/8 nk. 18-19 par. 15-19

No. 3: k‘Ondimaka ete baklisto nyonso bakomema likoló?’ (rs lok. 135 par. 2–4)

No. 4: Ntina oyo tosengeli koboya koluka bilengi oyo eleki makasi (sensations fortes)

4 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 1-3 Loyembo 191

Toli mpo na koloba malamu: Motó ya likambo (be lok. 209 par. 1-3)

No. 1: Libɔndisi oyo boyebi ya solosolo ya Nzambe ezali kopesa (w02 1/10 nk. 5-7)

No. 2: Deteronome 1:1-18

No. 3: Kofandisa solo na motema na yo elimboli nini?

No. 4: Komona moto moko lokola nde osilá komona ye to esika moko lokola nde osilá kokóma wana, yango nde endimisi liteya oyo ete moto abotamaka mbala na mbala? (rs lok. 305 par. 4–lok. 307 par. 2)

11 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 4-6 Loyembo 181

Toli mpo na koloba malamu: Salelá motó ya likambo oyo ebongi (be lok. 210 par. 1–lok. 211 par. 1; lok. 211, etanda)

No. 1: Ndenge ya kotánga na kozongáká nsima, kobanda na mobu 537 L.T.B kino mobu 997 L.T.B. (si lok. 285 par. 5-7)

No. 2: Deteronome 4:1-14

No. 3: Mpo na nini lisolo oyo ezali na Yoane 9:1, 2 emonisi te ete liteya oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala ezali ya solo? (rs lok. 307 par. 3–lok. 308 par. 3)

No. 4: ‘Kokanisa na elimo’ esɛngaka nini?

18 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 7-10 Loyembo 78

Toli mpo na koloba malamu: Kobimisa makanisi ya ntina polele (be lok. 212 par. 1–lok. 213 par. 1)

No. 1: Ndenge ya kotánga na kozongáká nsima, kobanda na mobu 997 L.T.B. kino mobu 2370 L.T.B. (si nk. 285-286 par. 8-11)

No. 2: w02 15/8 nk. 15-16 par. 3-6

No. 3: Bokeseni nini ezali kati na liteya oyo ete moto abotamaka mbala na mbala ná elikya oyo Biblia elobeli? (rs lok. 308 par. 4-lok. 309 par. 1)

No. 4: lNdenge oyo Yehova atalelaka bapɛngwi

25 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 11-13 Loyembo 57

Toli mpo na koloba malamu: Kosalela makanisi ya ntina ebele ebele te (be lok. 213 par. 2–lok. 214 par. 5)

Bozongeli ya koloba

1 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 14-18 Loyembo 26

Toli mpo na koloba malamu: Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato (be lok. 215 par. 1–lok. 217 par. 1)

No. 1: Ndenge ya kotánga na kozongáká nsima, kobanda na mobu 2370 L.T.B. kino mobu 4026 L.T.B. (si nk. 286-287 par. 12-15)

No. 2: Deteronome 14:1-23

No. 3: aSoki moto alobi na yo, ‘Nandimaka liteya oyo ete moto abotamaka mbala na mbala’ (rs lok. 309 par. 2-4)

No. 4: Ntina oyo baklisto basengeli kozalaka na bomoi ya mindɔndɔ te

8 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 19-22 Loyembo 182

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobenda likebi ya bato na mosala ya kosakola (be lok. 217 par. 2-5)

No. 1: Ntango oyo Yesu afandaki awa na mabelé (si lok. 291 par. 16-17)

No. 2: Deteronome 21:1-17

No. 3: Mpo na nini mangomba ezali mingi boye? (rs lok. 310 par. 1–lok. 311 par. 2)

No. 4: Ndenge nini bandakisa oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa biso tólonga kolɛmba nzoto?

15 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 23-27 Loyembo 162

Toli mpo na koloba malamu: Monisá polele na maloba ya ebandeli likambo oyo olingi koloba (be lok. 218 par. 1–lok. 219 par. 4)

No. 1: Bileko ya mosala ya Yesu (si lok. 291 par. 18-19)

No. 2: Deteronome 24:1-16

No. 3: Ndenge oyo tokoki koyeba baoyo Nzambe andimaka bango

No. 4: Mangomba nyonso ezali na makambo ya malamu? (rs lok. 311 par. 3-5)

22 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 28-31 Loyembo 32

Toli mpo na koloba malamu: Maloba ya nsuka oyo ebongi (be lok. 220 par. 1-3)

No. 1: Kotánga bambula na ntango ya bantoma (si nk. 291-292 par. 20-23)

No. 2: Deteronome 29:1-18

No. 3: Kolongwa na lingomba ya baboti na yo ezali mabe? (rs lok. 312 par. 1-3)

No. 4: Ntina oyo baklisto basengeli kozala na bopɔlɔ

29 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 32-34 Loyembo 41

Toli mpo na koloba malamu: Makambo oyo osengeli kobosana te (be lok. 221 par. 1–5)

No. 1: Mobembo ya mibale ya Paulo lokola misionɛrɛ (si lok. 292 par. 24-25)

No. 2: w02 15/10 lok. 11 par. 10-13

No. 3: Makambo oyo tokoki kosala mpo na kosantisa nkombo ya Nzambe

No. 4: Ndenge nini Biblia etalelaka likambo ya kosangisa mangomba? (rs lok. 313 par. 1–4)

6 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 1-5 Loyembo 40

Toli mpo na koloba malamu: Na mosala ya kosakola (be lok. 222 par. 1–7)

No. 1: Mobembo ya misato ya Paulo lokola misionɛrɛ mpe bambula ya nsuka, kobanda mobu 56 kino mobu 100 T.B. (si lok. 293 par. 26-30)

No. 2: Yosua 4:1-14

No. 3: Ezali na ntina kozala mondimi ya lingomba moko? (rs lok. 314 par. 1–lok. 315 par. 2)

No. 4: Noele ezali fɛti ya baklisto?

13 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 6-8 Loyembo 213

Toli mpo na koloba malamu: Koloba makambo oyo ezali solo mpenza (be lok. 223 par. 1-5)

No. 1: Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani (w02 1/11 nk. 4-7)

No. 2: Yosua 6:10-23

No. 3: Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola ndako na ndako?

No. 4: Osengeli kosuka kaka na kolinga mozalani na yo? (rs lok. 315 par. 4)

20 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 9-11 Loyembo 135

Toli mpo na koloba malamu: “Akangami makasi na liloba ya sembo” (be lok. 224 par. 1-4)

No. 1: Kembisá mabɔkɔ na yo (w02 1/12 nk. 30-31)

No. 2: w02 15/11 nk. 18-19 par. 19-23

No. 3: Osengeli kosuka kaka na kozala na boyokani malamu na Nzambe? (rs lok. 315 par. 5–6)

No. 4: bKozala moto oyo alukaka kimya elimboli nini?

27 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 12-15 Loyembo 210

Toli mpo na koloba malamu: Talá soki makambo yango ezali solo mpenza (be lok. 225 par. 1-3)

Bozongeli ya koloba

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekopesama kaka na ndeko mobali.

b Ekopesama kaka na ndeko mobali.

c Ekopesama kaka na ndeko mobali.

d Ekopesama kaka na ndeko mobali.

e Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

f Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

g Ekopesama kaka na ndeko mobali.

h Ekopesama kaka na ndeko mobali.

i Ekopesama kaka na ndeko mobali.

j Ekopesama kaka na ndeko mobali.

k Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

l Ekopesama kaka na ndeko mobali.

a Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.

b Ekopesama kaka na ndeko mobali.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto