Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/04 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Bopɔlɔ esilá ngala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Okoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango omekami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Ntango mokumba oyo ozalaki na yango esili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 11/04 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Ndenge nini tosengeli kotalela mikumba oyo tozwaka na lisangá?

Mpo makambo etambola na molɔngɔ na lisangá moko ya basaleli ya Yehova, esɛngaka bandeko bápesana mabɔkɔ. (1 Kol. 14:​33, 40) Kanisá naino makambo nyonso oyo esɛngaka kokokisa mpo na kosala kaka likita moko. Longola programɛ yango moko, ezali na mikumba ndenge na ndenge oyo bandeko bakokisaka liboso makita ebanda mpe na nsima na yango. Mikumba mosusu oyo bandeko bakokisaka emonanaka polele te, kasi yango ezalaka mpe na ntina. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ na ebongiseli yango?

Ndimá komipesa. Bato oyo bazali na elimo ya komipesa bakomona misala mingi ya kosala. (Nz. 110:⁠3) Tyá likebi na bandeko oyo bazali maladi mpe baoyo bakómi mibange. Pesá mabɔkɔ na mosala ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Tokoki kosala misala mingi kozanga bátinda biso. Likambo ya ntina ezali nde ya kozala na mposa ya kopesa mabɔkɔ.

Salá na elimo ya bopɔlɔ. Bato ya bopɔlɔ basepelaka kosalela basusu. (Luka 9:48) Ezaleli ya bopɔlɔ ekopekisa biso tóndima ebele ya mikumba oyo tokokoka te kokokisa yango. Lisusu, bopɔlɔ ekopekisa biso tólekisa ndelo te na lolenge ya kosalela bokonzi na biso.​—⁠Mas. 11:⁠2.

Zalá moto oyo abongi kotyelama motema. Na Yisalaele ya kala, balendisaki Moize apona “bato oyo babongi kotyelama motema,” mpo bázwa mikumba. (Ex. 18:​21, NW ) Ezaleli yango esɛngami mpe lelo oyo. Kokisá na motema moko mikumba nyonso oyo ozwi. (Luka 16:10) Soki okozala te mpo na kokokisa mokumba moko, yokaná na moto mosusu asala yango na esika na yo.

Pesá nyonso oyo ozali na yango ya malamu koleka. Balendisi baklisto básalaka na molimo na bango mobimba ata na makambo oyo ezali ya losambo te. (Kols. 3:​22-24) Tosengeli kosala bongo lisusu koleka ntango tozali kosala misala oyo ezali kotombola losambo ya solo. Ata soki mosala ezali moke ndenge nini lisangá ekozwela yango litomba soki esalemi malamu.

Mokumba mokomoko epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingaka Yehova mpe bandeko na biso. (Mat. 22:​37-39) Tiká tókokisa na bosembo mpenza mokumba nyonso oyo bapesi biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto